Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 5:20 - Mokanda na Bomoi

20 Geazi, mosali ya Elize, moto na Nzambe, amilobelaki : « Nkolo na ngai atiki penza na pamba Namani, moto oyo ya Arami, wana aboyi kozwa biloko oyo amemelaki ye. Na Kombo na Yawe, nakolanda ye mbangu mpe nakozwa ata eloko moko epai na ye. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 5:20
33 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Eliya, moto ya Tishibe, moko kati na bavandi ya Galadi, alobaki na mokonzi Akabi : — Solo, na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, Nzambe oyo ngai nasalelaka, mamwe mpe mvula ekozala te na mibu oyo ezali koya, longola kaka soki nasengi yango.


Moto na Nzambe asilikelaki ye mpe alobaki : — Ebongaki na yo kobeta yango na mabele mbala mitano to mbala motoba, boye olingaki kolonga bato ya Siri mpe kosilisa bango nye. Kasi sik’oyo, okolonga bato ya Siri kaka mbala misato.


Bongo alobaki na mosali na ye, Geazi : « Benga mwasi oyo ya Sunami. » Geazi abengaki mwasi ya Sunami, mpe mwasi yango ayaki kotelema liboso ya Elize.


Boye, akendeki mpe akomaki na ngomba Karimeli epai wapi moto na Nzambe azalaki kovanda. Tango Elize amonaki ye na mosika, alobaki na mosali na ye, Geazi : — Tala ! Ezali mwasi ya Sunami !


Geazi akendeki liboso na bango mpe atiaki nzete na elongi ya mwana mobali, kasi ata eloko moko te esalemaki, ezala mongongo to koningana. Geazi azongaki mpo na kokutana na Elize mpe alobaki na ye : — Mwana alamuki te.


Elize abengaki Geazi mpe alobaki na ye : — Benga mwasi ya Sunami ! Geazi abengaki ye. Tango ayaki epai ya Elize, Elize alobaki : — Zwa mwana na yo !


Mosakoli Elize azongisaki : — Na Kombo na Yawe oyo nasalelaka, nakondima eloko moko te. Namani atungisaki ye, kasi Elize aboyaki kaka.


Boye Geazi alandaki Namani mbangu. Tango Namani amonaki ye kopota mbangu na sima na ye, akitaki na shar na ye mpo na kokutana na ye mpe atunaki ye : — Boni, nyonso ezali malamu ?


Mokonzi alobaki : « Tika ete Nzambe apesa ngai etumbu ya makasi soki kaka moto ya Elize, mwana mobali ya Shafati, etikali na likolo ya mapeka na ye. »


Mokonzi azalaki kosolola na Geazi, mosali ya moto na Nzambe, mpe alobaki : « Yebisa ngai makambo minene nyonso oyo moto na Nzambe, Elize, asalaki. »


Elize akendeki na Damasi, wana Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, azalaki kobela. Tango bayebisaki mokonzi ete moto na Nzambe akomi kati na engumba,


Pamba te moto mabe amikumisaka na tina na posa makasi ya motema na ye, apambolaka moto oyo azali na lokoso mpe afingaka Yawe.


Okolulaka te ndako ya moninga na yo ; okolulaka te mwasi ya moninga na yo, mowumbu na ye ya mobali to mwasi mowumbu na ye, ngombe na ye, ane na ye to eloko nyonso oyo ezali ya moninga na yo. »


Okotangaka te na pamba Kombo ya Yawe, Nzambe na yo, pamba te Yawe akopesa etumbu na moto nyonso oyo akotanga Kombo na Ye na pamba.


Moto ya goyigoyi amimonaka ete azali na bwanya koleka bato sambo ya mayele.


Boyoka makambo oyo, oh ndako ya Jakobi, bino oyo bobengamaka na kombo ya Isalaele, bino oyo bobimi na libota ya Yuda, bino oyo bolapaka ndayi na Kombo na Yawe mpe bobelelaka Kombo ya Nzambe ya Isalaele, kasi na bosolo te mpe na bosembo te !


« Kasi yo, miso mpe motema na yo elukaka kaka bomengo mpo na bolamu na yo moko kaka, na nzela ya kosopa makila ya bato oyo bayebi likambo te, na nzela ya konyokola bato mpe na nzela ya kobotola bango biloko. »


Mawa na moto oyo atongaka ndako na ye na nzela ya sembo te ! Alukaka kosala zala na ye na likolo ya bangomba mpo na kokima ete makambo mabe ekomela ye.


Simona oyo azalaki moko kati na bato ya lisanga ya Bazelote, mpe Yuda Isikarioti oyo atekaki Yesu.


Bakokaki ata koteka yango na motuya makasi mpe kopesa mbongo epai ya babola !


Bongo alobaki na bato nyonso : — Bosala keba ! Bomibatela malamu ete bokweya te na lokoso ya konduka bomengo ; pamba te, ezala kati na bofuluki, ezali bomengo te nde esalaka bomoi ya moto.


Mokonzi akumisaki mobateli mabe wana ya bomengo mpo na mayele oyo asalaki na yango. Pamba te bato ya mokili oyo, bazali na mayele koleka bana ya pole.


Bongo, wana bazalaki kolia elongo, Satana asilaki kotia kati na motema ya Yuda Isikarioti, mwana mobali ya Simona, makanisi ya koteka Yesu.


Yesu alobaki na bango : — Boni, ezali Ngai te nde naponaki bino nyonso zomi na mibale ? Nzokande, moko kati na bino azali Satana !


Abombaki ndambo ya mbongo mpo na ye moko, boye amemaki ndambo oyo etikalaki mpe apesaki yango na bantoma. Mwasi na ye mpe ayebaki yango.


Pamba te Demasi asundolaki ngai : alingaki mokili oyo mpe akendeki na Tesalonika ; Kresasi akendeki na Galatia, mpe Tito akendeki na Dalimatia.


Lokola motambolisi misala ya Nzambe, mokambi ya Lingomba asengeli kozala moto azanga pamela. Yango wana, asengeli kozala moto na lolendo te, moto na kanda te, molangwi masanga te, moto na kanza te, moto na lokoso ya mbongo te.


Lokola babateli bibwele, bobatelaka malamu etonga oyo Nzambe apesi bino mokumba ya kokamba. Bosalaka bongo kolanda mokano ya Nzambe : na kotindika te, kasi na komipesa mobimba ; na makanisi te ya konduka mbongo, kasi na posa makasi ya kosalela bango ;


Na Kombo na Yawe, Mobikisi ya Isalaele, ata ezali Jonatan, mwana na ngai ya mobali, nde asali lisumu yango, asengeli kokufa. Kasi kati na bato, moko te alobaki ata liloba moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ