2 Nzokande, tango mampinga ya bato ya Siri babimaki na bitumba, bakangaki na bowumbu elenge mwasi moko ya Isalaele. Boye akomaki kosalela mwasi ya Namani.
Elenge mwasi yango alobaki na nkolo na ye ya mwasi : — Ah, soki kaka nkolo na ngai, Namani, akokaki komona mosakoli oyo azali kati na Samari ! Akoki penza kobikisa ye na bokono na ye ya maba.
Ndenge miso ya bawumbu etalaka nkolo na bango, mpe miso ya mwasi mosali etalaka nkolo na ye ya mwasi, ndenge wana mpe miso na biso ezali kotala Yawe, Nzambe na biso, kino asalela biso ngolu.
Na butu, Abimeleki elongo na mampinga na ye nyonso batelemaki, bakabwanaki na biteni minei mpe bakendeki kovanda kati na esika ya kobombama, pene ya Sishemi.