Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 5:14 - Mokanda na Bomoi

14 Boye Namani akitaki mpe amizindisaki mbala sambo na ebale Yordani, ndenge moto na Nzambe ayebisaki ye ; mpe nzoto na ye ebongwanaki mpe ekomaki peto lokola nzoto ya elenge mobali.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 5:14
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Farine etikalaki kosila te na sani, mpe mafuta etikalaki kokawuka te na mbeki, kolanda ndenge Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Eliya.


Elize alongwaki, atambolaki na bangambo nyonso ya shambre ; bongo amataki lisusu na mbeto mpe amitandaki na likolo ya mwana. Mbala moko, mwana akosolaki mbala sambo mpe afungolaki miso.


Elize atindaki moto moko mpo na koyebisa Namani : — Kende kosukola mbala sambo na ebale Yordani ; bongo nzoto na yo ekobongwana, mpe okokoma peto.


Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, bakendeki na esobe ya Tekoa. Na tango ya kokende, Jozafati atelemaki mpe alobaki : « Bino, bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi, boyoka ngai ! Botia elikya na Yawe, Nzambe na bino, mpe bokolendisama ! Bondimela basakoli na Ye, mpe bokolonga ! »


Soki nasalelaki na bosembo te bawumbu na ngai ya mibali mpe ya basi tango bazwaki ngai mabe,


nzoto na ye ekokoma lisusu sembesembe lokola na tango ya bolenge na ye, ekozonga ndenge ezalaki na bomwana na ye.


Yawe alobaki na ye : — Sik’oyo, zongisa loboko na yo na tolo na yo. Moyize azongisaki loboko na ye na tolo na ye. Mpe tango alongolaki yango, loboko yango ekomaki lisusu malamu lokola biteni mosusu ya nzoto na ye.


Teya moto ya bwanya, mpe akokoma lisusu na bwanya koleka ; teya moto ya sembo, mpe akobakisa lisusu boyebi na ye.


Tango bakosukola elamba oyo ezali na litono, soki litono yango elongwe, esengeli kosukola yango lisusu na mbala ya mibale mpo ete ezala peto. »


Na mokolo wana, etima moko ekobimisa mayi mpo na kopetola masumu mpe mbindo ya libota ya Davidi mpe ya bavandi ya Yelusalemi.


Na mokolo wana, mayi oyo etiolaka ekobimela na Yelusalemi. Ndambo moko ekokende na ebale monene ya este mpe ndambo mosusu, na ebale monene ya weste, na eleko ya malili mpe ya molunge.


Mpe na tango ya mosakoli Elize, bato na maba bazalaki ebele kati na Isalaele, kasi moko te kati na bango apetolamaki, longola kaka Namani, moto ya Siri. »


Yesu asembolaki loboko na Ye, asimbaki ye mpe alobaki : — Solo, nalingi yango, koma peto ! Mbala moko, maba esilaki.


Mama na Ye alobaki na basali : — Bosala makambo nyonso oyo akoloba na bino.


amikabaki Ye moko mpo na biso, mpo ete akangola biso na mabe nyonso mpe apetola biso mpo na Ye moko lokola bato na Ye, oyo batondi na posa makasi ya kosala misala ya malamu.


Kamata Banganga-Nzambe sambo ; Nganga-Nzambe moko na moko asengeli komema kelelo moko basala na liseke ya meme. Banganga-Nzambe nyonso sambo basengeli kotambola liboso ya Sanduku. Na mokolo ya sambo, bobaluka zingazinga ya engumba mbala sambo, elongo na Banganga-Nzambe oyo bakozala kobeta bakelelo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ