Elize alobaki : — Bomemela ngai farine ! Atiaki farine kati na nzungu mpe alobaki : — Bokabolela yango bato mpo ete balia. Mpe kati na elubu oyo ezalaki kati na nzungu, ezalaki lisusu na eloko moko te ya mabe.
Kasi Namani asilikaki, azongaki mpe alobaki : — Nakanisaki ete akoya penza epai na ngai, akobelela Yawe, Nzambe na ye, akotia loboko na ye na esika oyo bokono ezali, mpe akobikisa ngai na bokono na ngai ya maba !
Boye Namani akitaki mpe amizindisaki mbala sambo na ebale Yordani, ndenge moto na Nzambe ayebisaki ye ; mpe nzoto na ye ebongwanaki mpe ekomaki peto lokola nzoto ya elenge mobali.
Moyize azongaki epai ya Jetro, tata-bokilo na ye, mpe alobaki na ye : — Nasengeli kokende epai ya bandeko na ngai, na Ejipito, mpo ete natala soki ndambo kati na bango bazali nanu na bomoi. Jetro ozongisaki : — Kende na kimia !
Nganga-Nzambe akozindisa, kati na mafuta oyo asili kosopa na loboko na ye ya ngambo ya mwasi, mosapi ya mibale ya loboko na ye ya ngambo ya mobali mpe akosalela yango mpo na kosopa mbala sambo mafuta liboso ya Yawe.
Akokamata mabaya ya sedele, eteni ya nzete ya izope, eteni ya elamba ya motane makasi mpe ndeke mosusu, akozindisa yango kati na makila ya ndeke oyo asilaki kokata kingo mpe kati na mayi ya peto oyo akobwaka na likolo ya ndako mbala sambo.
Akozwa makila ya ngombe ya mobali mpe, na nzela ya mosapi na ye, akobwaka yango liboso ya esika ya bolimbisi masumu, na ngambo ya este. Boye, na nzela ya mosapi na ye, akobwaka makila mbala sambo liboso ya esika ya bolimbisi masumu.
Mpe na nzela ya mosapi na ye, akobwaka makila mbala sambo na etumbelo. Ezali na nzela wana nde akopetola mpe akobulisa yango na mbindo ya bana ya Isalaele.
Na mokolo ya misato mpe ya sambo, moto oyo azali mbindo te akobwakela moto ya mbindo. Bongo na mokolo ya sambo, akopetola ye. Moto oyo bapetoli akosukola bilamba na ye mpe akomisukola nzoto na mayi ; boye na pokwa, akokoma peto.
Na nzela ya mosapi na ye, Nganga-Nzambe Eleazari akozwa makila ya ngombe yango ya mwasi mpe akosopa yango mbala sambo na ngambo ya ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
pamba te anjelu moko na Nkolo azalaki koya tango na tango na liziba yango mpo na koningisa mayi. Soki mayi eningani, moto oyo azalaki kokita moto ya liboso kati na liziba azalaki kobika ata soki pasi na ye ezali ndenge nini.]
Mpe bozalaki ndenge wana, bato mosusu kati na bino. Kasi basukolaki bino, babulisaki bino mpe bakomisaki bino bato ya sembo, na Kombo ya Nkolo Yesu-Klisto mpe na nzela ya Molimo ya Nzambe na biso.