Moto moko na Nzambe alongwaki na Yuda mpe akendeki na Beteli, kolanda etinda na Yawe, wana Jeroboami atelemaki pembeni ya etumbelo mpo na kotumba ansa.
Mwasi yango alobaki na Eliya : — Moto na Nzambe, nasali yo nini ? Boni, oyaki na ndako na ngai mpo na kokundola lisumu na ngai mpe kobomisa mwana na ngai ya mobali ?
Mwasi yango akendeki koyebisa moto na Nzambe. Mpe moto na Nzambe alobaki na ye : — Kende, teka mafuta yango mpe futa niongo na yo ; bongo, yo elongo na bana na yo ya mibali, bokobika na oyo ekotikala.
Kasi moto moko ya Nzambe ayaki epai na ye mpe alobaki : — Oh mokonzi, tika ete basoda ya Isalaele bakende te elongo na yo na bitumba, pamba te Yawe azali te elongo na Isalaele mpe elongo na bato ya Efrayimi.
Bino moko bozali batatoli, Nzambe mpe azali Motatoli, ete totambolaki na bosantu, na bosembo mpe na kozanga pamela, na miso na bino oyo bozali kondima.
Asengeli nde kozala moto oyo ayambaka bato malamu kati na ndako na ye, alingaka makambo ya malamu, azalaka na ekenge ; asengeli kozala moto ya bule, moto ya sembo, moto oyo ayebi komikanga,
Bino mpe basi, botosaka mibali na bino mpo ete, soki ezali na ndambo ya mibali oyo bandimaka Liloba na Nzambe te, bakoma kondima na nzela ya bizaleli malamu ya basi na bango, ata soki bateyi bango Liloba te,