Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 4:40 - Mokanda na Bomoi

40 Bakabolelaki bato elubu. Tango kaka babandaki kolia yango, bagangaki : — Moto na Nzambe, kufa ezali kati na nzungu oyo ! Mpe bakokaki lisusu te kolia yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 4:40
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokolo moko, wana Jakobi azalaki kolamba elubu, Ezawu oyo awutaki na bilanga ayaki na kolemba.


Mwasi yango alobaki na Eliya : — Moto na Nzambe, nasali yo nini ? Boni, oyaki na ndako na ngai mpo na kokundola lisumu na ngai mpe kobomisa mwana na ngai ya mobali ?


Mokonzi atindaki lisusu epai ya Eliya mokonzi mosusu ya basoda tuku mitano elongo na basoda na ye tuku mitano. Mokonzi ya basoda alobaki na Eliya : — Moto na Nzambe, mokonzi apesi mitindo ete okende noki epai na ye.


Mokonzi Akazia atindaki lisusu na mbala ya misato mokonzi mosusu ya basoda tuku mitano elongo na basoda tuku mitano. Mokonzi yango akendeki kofukama liboso ya Eliya mpe abondelaki ye : — Moto na Nzambe, tika ete bomoi na ngai mpe bomoi ya basali na yo, bato tuku mitano oyo, ezala na motuya na miso na yo !


Mbala moko, mokonzi atindaki mokonzi ya basoda tuku mitano epai ya Eliya elongo na basoda na ye tuku mitano. Mokonzi ya basoda tuku mitano akendeki epai ya Eliya oyo azalaki kovanda na songe ya ngomba mpe alobaki na ye : — Moto na Nzambe, mokonzi apesi mitindo ete okende epai na ye.


Moko kati na bango akendeki na bilanga mpo na kobuka ndunda, mpe amonaki nzete ya vino ya zamba. Abukaki na nzete yango ndambo ya bakolokente mpe atondisaki yango na elamba na ye. Tango azongaki, akataki yango mike-mike mpe atiaki yango kati na nzungu ya elubu ; moto moko te ayebaki soki ezali nini.


Mwasi yango alobaki na mobali na ye : « Nayebi ete moto oyo ayaka mbala mingi epai na biso azali mobulami ya Nzambe.


Sik’oyo lisusu, bolimbisa lisumu na ngai. Bobondela Yawe, Nzambe na bino, mpo ete alongola etumbu oyo ya kufa kati na ngai.


Tango bakomaki na Mara epai wapi bamonaki mayi, bakokaki te komela mayi yango, pamba te ezalaki bololo. Yango wana babengaki esika yango Mara.


bakokanga banyoka na maboko na bango ; mpe soki bameli ngenge, ekosala bango pasi ata moke te ; bakotiela babeli maboko, mpe babeli bakobika na bokono na bango.


Tala lipamboli oyo Moyize, moto na Nzambe, asakolaki mpo na bana ya Isalaele liboso ete akufa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ