4 Sima, zonga na ndako na yo, kanga ekuke sima na yo elongo na bana na yo ya mibali ; sopa mafuta kati na mbeki moko na moko, mpe tia pembeni mbeki oyo etondi.
Atikaki Elize mpe akangaki ekuke sima na ye elongo na bana na ye ya mibali. Bana na ye bazalaki kopesa ye bambeki, mpe azalaki kotondisa yango na mafuta.
Kasi yo, soki olingi kosambela, kota na shambre na yo, kanga ekuke mpe sambela Tata na yo, oyo azali kati na esika wana ya sekele ; bongo Ye, Tata na yo, oyo amonaka makambo oyo esalemaka na nkuku, akopesa yo lifuti.
Bongo bakomaki koseka Ye. Sima na Yesu kobimisa bato nyonso, akamataki tata ya mwana, mama ya mwana mpe bayekoli oyo bazalaki na Ye elongo, mpe bakotaki na esika oyo mwana azalaki.