Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 4:39 - Mokanda na Bomoi

39 Moko kati na bango akendeki na bilanga mpo na kobuka ndunda, mpe amonaki nzete ya vino ya zamba. Abukaki na nzete yango ndambo ya bakolokente mpe atondisaki yango na elamba na ye. Tango azongaki, akataki yango mike-mike mpe atiaki yango kati na nzungu ya elubu ; moto moko te ayebaki soki ezali nini.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 4:39
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokolo moko, wana Jakobi azalaki kolamba elubu, Ezawu oyo awutaki na bilanga ayaki na kolemba.


Batobolaki bililingi na mabaya ya sedele oyo balatisaki na bamir ya kati ya Tempelo, mpo na kotia bilembo oyo ezalaki na lolenge ya bakolokente mpe ya bafololo efungwama ; balatisaki kati nyonso ya Tempelo na mabaya ya banzete ya sedele, mpe ata libanga moko te ezalaki komonana.


Elize azongaki na Giligali. Nzokande etuka yango ezalaki kati na nzala makasi. Wana bayekoli ya basakoli bavandaki na mayangani elongo na Elize, alobaki na mosali na ye : « Tia nzungu ya monene na moto mpe lamba elubu mpo na basakoli oyo. »


Bakabolelaki bato elubu. Tango kaka babandaki kolia yango, bagangaki : — Moto na Nzambe, kufa ezali kati na nzungu oyo ! Mpe bakokaki lisusu te kolia yango.


Ezali malamu te kobungisa mayele, kati na bolingo oyo eleka ndelo. Lokolo ya moto oyo atambolaka noki-noki ezangaka te kobeta libaku.


Nasala penza eloko nini, mpo na elanga na ngai ya vino, oyo natikala nanu kosalela yango te ? Mpo na nini eboteli ngai bambuma ya mabe, tango ngai nakanisaki ete ekobotela ngai bambuma ya malamu ?


Nzokande, Ngai nalonaki yo lokola nzete kitoko ya vino mpo ete obotaka mbuma ya malamu na tembe te. Bongo, ndenge nini sik’oyo obalukeli Ngai mpe okomi nzete oyo nayebi te, nzete oyo ebotaka mbuma mabe ?


Yesu azongisaki : — Nkona nyonso oyo Tata na Ngai ya Likolo alonaki te ekopikolama.


Bosenzelaka ete moto moko te azanga ngolu ya Nzambe ; bosenzelaka mpe ete mosisa moko te ya bololo ebotama mpo na kokotisa mobulu mpe kobebisa bomoi ya bato ebele kati na bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ