2 Bakonzi 4:38 - Mokanda na Bomoi38 Elize azongaki na Giligali. Nzokande etuka yango ezalaki kati na nzala makasi. Wana bayekoli ya basakoli bavandaki na mayangani elongo na Elize, alobaki na mosali na ye : « Tia nzungu ya monene na moto mpe lamba elubu mpo na basakoli oyo. » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Moko kati na bango akendeki na bilanga mpo na kobuka ndunda, mpe amonaki nzete ya vino ya zamba. Abukaki na nzete yango ndambo ya bakolokente mpe atondisaki yango na elamba na ye. Tango azongaki, akataki yango mike-mike mpe atiaki yango kati na nzungu ya elubu ; moto moko te ayebaki soki ezali nini.