Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 4:37 - Mokanda na Bomoi

37 Mwasi ya Sunami apusanaki, akweyaki na makolo ya Elize mpe agumbamaki kino na se ; bongo azwaki mwana na ye mpe abimaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 4:37
6 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jozefi alongolaki bana na ye na mabolongo ya Isalaele mpe agumbamaki elongi na ye kino na se.


Mwasi yango alobaki na Eliya : — Nasosoli sik’oyo ete ozali solo moto na Nzambe ; mpe Liloba na Yawe, oyo ebimaka na monoko na yo ezali penza solo.


Bayekoli ya basakoli, oyo bawutaki na Jeriko bamonaki mpe balobaki : « Molimo ya Eliya evandi sik’oyo likolo ya Elize ! » Bakendeki kokutana na ye mpe bagumbamaki liboso na ye kino na mabele.


Boye akobaki nzela na ye kino akomaki na ngomba, epai ya moto na Nzambe. Mpe amibwakaki na makolo na ye. Geazi apusanaki mpo na kolongola ye na makolo ya Elize, kasi moto na Nzambe alobaki : — Tika ye bongo ! Azali na pasi makasi kati na motema na ye, kasi Yawe abombeli ngai yango mpe atalisi ngai te tina na yango.


Elize abengaki Geazi mpe alobaki na ye : — Benga mwasi ya Sunami ! Geazi abengaki ye. Tango ayaki epai ya Elize, Elize alobaki : — Zwa mwana na yo !


Mpo na kondima, basi bamonaki bato na bango, oyo bakufaki kozonga lisusu na bomoi. Bato mosusu bandimaki ata konyokwama mpe baboyaki ete basikola bango, mpo bayebaki ete bakosekwa mpe bakozala na bomoi oyo ezali kitoko koleka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ