36 Elize abengaki Geazi mpe alobaki na ye : — Benga mwasi ya Sunami ! Geazi abengaki ye. Tango ayaki epai ya Elize, Elize alobaki : — Zwa mwana na yo !
Eliya azwaki mwana mpe akitisaki ye wuta na shambre ya likolo kino kati na ndako. Apesaki mwana epai ya mama na ye mpe alobaki : — Tala mwana na yo ya mobali, azali na bomoi.
Elize alobaki na mama ya mwana mobali oyo asekwisaki : « Kende elongo na libota na yo na esika oyo bokoki kovanda, pamba te Yawe abengi nzala makasi kati na mokili oyo ; ekowumela mibu sambo. »