Sima, zonga na ndako na yo, kanga ekuke sima na yo elongo na bana na yo ya mibali ; sopa mafuta kati na mbeki moko na moko, mpe tia pembeni mbeki oyo etondi.
Kasi Namani asilikaki, azongaki mpe alobaki : — Nakanisaki ete akoya penza epai na ngai, akobelela Yawe, Nzambe na ye, akotia loboko na ye na esika oyo bokono ezali, mpe akobikisa ngai na bokono na ngai ya maba !
Kasi yo, soki olingi kosambela, kota na shambre na yo, kanga ekuke mpe sambela Tata na yo, oyo azali kati na esika wana ya sekele ; bongo Ye, Tata na yo, oyo amonaka makambo oyo esalemaka na nkuku, akopesa yo lifuti.