Eliya alobaki na Elize : — Nabondeli yo, tikala awa ; pamba te Yawe atindi ngai na Beteli. Elize azongisaki : — Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te ! Boye bakendeki na Beteli.
Eliya alobaki na Elize : — Tikala awa ; Yawe atindi ngai na Jeriko. Elize azongisaki : — Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te ! Boye bakendeki na Jeriko.
Eliya alobaki na ye : — Elize, tikala awa ; Yawe atindi ngai na Yordani. Elize azongisaki : — Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te ! Boye bango mibale bakobaki nzela na bango.