Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 4:27 - Mokanda na Bomoi

27 Boye akobaki nzela na ye kino akomaki na ngomba, epai ya moto na Nzambe. Mpe amibwakaki na makolo na ye. Geazi apusanaki mpo na kolongola ye na makolo ya Elize, kasi moto na Nzambe alobaki : — Tika ye bongo ! Azali na pasi makasi kati na motema na ye, kasi Yawe abombeli ngai yango mpe atalisi ngai te tina na yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 4:27
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe amilobelaki : « Boni, nakoki solo kobombela Abrayami likambo oyo nalingi kosala ?


Natan azongiselaki mokonzi : — Sala nyonso oyo ozali na yango na motema, pamba te Yawe azali elongo na yo.


Boye, akendeki mpe akomaki na ngomba Karimeli epai wapi moto na Nzambe azalaki kovanda. Tango Elize amonaki ye na mosika, alobaki na mosali na ye, Geazi : — Tala ! Ezali mwasi ya Sunami !


Nabondeli yo, pota mbangu sik’oyo mpo na kokutana na ye, mpe tuna ye : « Boni, kimia ezali ? Ozali malamu ? Mobali na yo azali malamu ? Mwana na yo azali malamu ? » Azongisaki : — Nyonso ezali malamu.


Moko kati na bakalaka na ye alobaki : — Mokonzi, nkolo na ngai, moko te kati na biso. Ezali nde mosakoli Elize oyo azali kati na Isalaele ; ye nde ayebaka mpe ayebisaka mokonzi ya Isalaele ata makambo oyo olobaka kati na shambre na yo ya kolala.


Nayini bomoi na ngai ! Nakokoba kaka komilela, nakoloba na mongongo makasi mpe na pasi ya motema na ngai.


Motema eyebaka pasi na yango moko, moko te akoki kokabola na yango esengo.


Kimia kati na motema elendisaka moto na tango ya bokono, kasi nani akokoka kolendisa motema oyo etutami ?


Solo, Nkolo Yawe asalaka eloko moko te soki alakisi mabongisi na Ye te epai ya basali na Ye, basakoli.


Kasi Yesu azongiselaki ye ata liloba te. Bayekoli bapusanaki pene ya Yesu mpe basengaki na Ye : — Bengana ye ; azali kotiela biso makelele !


Bato bazalaki kopamela bango mpo ete bakanga minoko na bango, kasi bango bagangaki lisusu makasi : — Nkolo, mwana ya Davidi, yokela biso mawa !


Mbala moko, Yesu akutanaki na bango mpe alobaki : — Mbote na bino ! Bapusanaki pene na Ye, basimbaki makolo na Ye mpe bagumbamelaki Ye.


Bato bazalaki komema bana mike epai ya Yesu mpo ete atia bango maboko, kasi bayekoli bazalaki kobengana bato oyo bazalaki komema bana yango.


Kasi Yesu alobaki : — Botika ye ! Mpo na nini kotungisa ye ? Asali Ngai likambo moko ya malamu.


atelemaki na sima ya Yesu, na makolo na Ye ; azalaki kolela mpe, na mpinzoli na ye, akomaki kopolisa makolo ya Yesu. Bongo apangusaki makolo yango na nzela ya suki na ye, apesaki yango beze mpe asopelaki yango malasi.


Nazali kobenga bino lisusu te « bawumbu, » pamba te mowumbu ayebaka te makambo oyo nkolo na ye asalaka. Nzokande, nazali kobenga bino « baninga na Ngai, » pamba te nayebisi bino makambo nyonso oyo nayekolaki epai ya Tata na Ngai.


Kaka na tango yango, bayekoli ya Yesu bazongaki. Bakamwaki mingi komona Yesu kosolola na mwasi. Kasi moko te kati na bango amekaki kotuna Ye : « Ozali koluka nini ? » to « Mpo na nini ozali kosolola na ye ? »


Wana Ana azalaki na pasi na motema, abondelaki Yawe na kolela mingi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ