2 Bakonzi 4:26 - Mokanda na Bomoi26 Nabondeli yo, pota mbangu sik’oyo mpo na kokutana na ye, mpe tuna ye : « Boni, kimia ezali ? Ozali malamu ? Mobali na yo azali malamu ? Mwana na yo azali malamu ? » Azongisaki : — Nyonso ezali malamu. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Boye akobaki nzela na ye kino akomaki na ngomba, epai ya moto na Nzambe. Mpe amibwakaki na makolo na ye. Geazi apusanaki mpo na kolongola ye na makolo ya Elize, kasi moto na Nzambe alobaki : — Tika ye bongo ! Azali na pasi makasi kati na motema na ye, kasi Yawe abombeli ngai yango mpe atalisi ngai te tina na yango.
Natunaki : — Bato oyo bayei kosala nini ? Azongisaki : — Ezali maseke oyo eyaki kopanza Yuda mpo ete moto moko te akoka kotombola moto, kasi bato oyo ya misala ya maboko bayei nde kolengisa bango mpe kokweyisa nguya ya bikolo oyo etombolaki maseke na yango mpo na kobundisa Yuda mpe kopanza bato na yango.