23 Mobali na ye atunaki : — Mpo na nini olingi kokende epai na ye lelo ? Lelo ezali ebandeli ya sanza te ! Ezali mpe mokolo ya Saba te ! Azongisaki : — Komitungisa te ! Nyonso ezali malamu.
Bongo abengaki mobali na ye mpe alobaki na ye : — Nabondeli yo, tindela ngai elenge moko kati na basali mpe ane moko ya mwasi, mpo ete nakende noki epai ya moto na Nzambe mpe nazonga mbala moko.
mpe kobonza tango nyonso bambeka ya kotumba oyo bazalaki komema epai na Yawe na mikolo ya Saba, na ebandeli ya sanza mpe na mikolo nyonso ya bafeti oyo ekatama, kolanda motango oyo bakatelaki bango mpo na libela liboso ya Yawe.
Bozali koloba : « Feti ya ebandeli ya sanza ekoleka tango nini mpo ete toteka ble na biso ? Tango nini mokolo ya Saba ekosila mpo ete tofungola bibombelo na biso ya ble ? » Tokosalela bakopo ya mike mpo ete tomatisa talo, mpe tokosalela bimekelo ya lokuta.
Mpe lisusu, na batango na bino ya kosepela, na bafeti na bino oyo ekatama mpe ya ebandeli ya sanza, bokobeta bakelelo mpo na kobonza mbeka na bino ya kotumba mpe ya boyokani. Yango ekozala ekaniseli mpo na bino na miso ya Nzambe na bino. Nazali Yawe, Nzambe na bino. »
Na ebandeli nyonso ya sanza, bokobonzela Yawe lokola mbeka ya kotumba : bana ngombe mibale ya mibali, meme moko ya mobali mpe bana mibali ya meme ya mobu moko sambo. Yango nyonso esengeli kozala na mbeba te.
Na mokolo ya Saba, bokobonza mbeka ya bana meme mibale, ya mobu moko oyo ezanga mbeba, elongo na likabo ya masanga mpe bakilo motoba ya farine oyo basangisa na mafuta, lokola makabo ya mbuma.
Davidi azongiselaki Jonatan : — Lobi ekozala mokolo ya feti ya Sanza ya Sika ; nasengelaki kovanda mesa moko na mokonzi mpo na kolia. Pesa ngai nzela ete nakende kobombama na bilanga kino na pokwa ya mokolo ya misato.