Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 4:2 - Mokanda na Bomoi

2 Elize azongiselaki ye : — Ndenge nini nakoki kosunga yo ? Yebisa ngai eloko oyo ozali na yango kati na ndako na yo. Azongisaki : — Mwasi mowumbu na yo azali na eloko moko te, longola kaka mwa mafuta.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 4:2
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mwasi yango azongiselaki ye : — Na Kombo na Yawe, Nzambe na yo, nazali na lipa te ; nazali kaka na mwa ndambo ya farine na sani mpe ndambo ya mafuta na mbeki. Nazali kolokota mwa koni oyo nakomema na ndako mpo na kolamba bilei ya suka mpo na ngai mpe mpo na mwana na ngai ya mobali. Tango tokosilisa yango, ekotikala na biso kaka kozela kufa.


Tango bakatisaki, Eliya alobaki na Elize : — Yebisa ngai nasala nini mpo na yo liboso ete Yawe alongola ngai liboso na yo. Elize azongisaki : — Tika ete nazwa nguya ya molimo na yo mbala mibale.


Elize alobaki : — Kende kosenga na baninga na yo nyonso bambeki ya pamba, kosenga moke te.


Yawe atunaki ye : — Ozali na nini na loboko na yo ? Moyize azongisaki : — Nazali na lingenda.


Yesu atunaki bango : — Bozali na mapa boni ? Bayekoli bazongisaki : — Tozali na mapa sambo mpe ndambo ya bambisi ya mike-mike.


Kasi Petelo alobaki na ye : — Nazangi mbongo to wolo ya kopesa yo, kasi oyo nazali na yango, nazali kopesa yo yango : na Kombo na Yesu-Klisto ya Nazareti, telema mpe tambola.


koyebana lokola bato na mawa, nzokande tozalaka na esengo tango nyonso ; koyebana lokola babola, nzokande tokomisaka bato ebele bazwi ; koyebana lokola bato bakelela, nzokande tozali na nyonso.


Bandeko na ngai ya bolingo, boyoka : Nzambe apona te bato oyo mokili ezali kobenga babola mpo ete bazala bato ya bomengo kati na kondima mpe bazwa Bokonzi oyo alaka epai ya bato oyo balingaka Ye ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ