Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 4:16 - Mokanda na Bomoi

16 Elize alobaki : — Na mobu oyo ekoya, na eleko oyo, maboko na yo ekosimba mwana mobali. Mwasi ya Sunami agangaki : — Te, nkolo na ngai, moto na Nzambe, kopesa na ngai mwasi mosali na yo elikya ya lokuta te !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 4:16
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi na oyo etali boyokani na Ngai, nakosala yango elongo na Izaki, mwana mobali oyo Sara akobotela yo na eleko oyo, na mobu oyo ezali koya.


Bongo moko kati na bango alobaki : — Solo, na mobu oyo ezali koya, kaka na eleko oyo, nakozonga epai na yo, mpe Sara, mwasi na yo, akozala na mwana mobali. Nzokande, Sara ayokaki maloba wana na ekotelo ya ndako ya kapo, na sima ya Abrayami.


Mwasi yango alobaki na Eliya : — Moto na Nzambe, nasali yo nini ? Boni, oyaki na ndako na ngai mpo na kokundola lisumu na ngai mpe kobomisa mwana na ngai ya mobali ?


Mwasi yango alobaki na Eliya : — Nasosoli sik’oyo ete ozali solo moto na Nzambe ; mpe Liloba na Yawe, oyo ebimaka na monoko na yo ezali penza solo.


Abidiasi atunaki : — Likambo nini ya mabe ngai nasali mpo ete okaba mosali na yo epai ya Akabi mpo ete baboma ngai ?


Bato ya engumba ya Jeriko bayebisaki Elize : — Oh nkolo ! Engumba na biso etongami na esika ya malamu ndenge ozali komona yango, kasi mayi ezali mabe mpe mabele ebotaka te.


Elize alobaki : — Benga ye ! Geazi abengaki ye, mpe ayaki kotelema na ekuke.


Nzokande, mwasi ya Sunami akomaki na zemi. Mpe na mobu oyo elandaki, na eleko yango kaka, abotaki mwana mobali, ndenge kaka Elize alobaki na ye.


Mwasi ya Sunami alobaki : — Boni, nasengaki mwana epai ya nkolo na ngai ? Te ! Kutu, nalobaki na yo : « Kopesa ngai elikya ya lokuta te ! »


Kati na mitungisi na ngai, nazalaki komilobela : « Bato nyonso bazali bakosi. »


Kasi anjelu alobaki na ye : — Zakari, kobanga te ! Nzambe ayoki mabondeli na yo. Mwasi na yo, Elizabeti, akobotela yo mwana mobali, mpe okopesa ye kombo « Yoane. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ