15 Elize alobaki : — Benga ye ! Geazi abengaki ye, mpe ayaki kotelema na ekuke.
Elize atunaki mosali na ye, Geazi : — Eloko nini tokoki kosala mpo na ye ? Geazi azongisaki : — Azali na mwana te, mpe mobali na ye azali mobange.
Elize alobaki : — Na mobu oyo ekoya, na eleko oyo, maboko na yo ekosimba mwana mobali. Mwasi ya Sunami agangaki : — Te, nkolo na ngai, moto na Nzambe, kopesa na ngai mwasi mosali na yo elikya ya lokuta te !