Tango Rasheli amonaki ete azali kobotela Jakobi bana te, akomaki na zuwa mpo na ndeko na ye ya mwasi. Boye alobaki na Jakobi : — Pesa ngai bana, noki te nakokufa.
Elize alobaki na Geazi : — Loba na ye : « Omitungisi mingi mpo na biso. Eloko nini tokoki sik’oyo kosalela yo ? Tolobela yo epai ya mokonzi to epai ya mokonzi ya basoda ? » Mwasi ya Sunami azongisaki : — Navandaka na kimia kati na bato na ngai.
Elikana, mobali na ye, atunaki ye : « Ana, mpo na nini ozali kolela ? Mpo na nini ozali kolia te ? Mpo na nini ozali na mawa boye ? Boni, ngai nazali na motuya te mpo na yo koleka bana mibali zomi ? »