Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 4:13 - Mokanda na Bomoi

13 Elize alobaki na Geazi : — Loba na ye : « Omitungisi mingi mpo na biso. Eloko nini tokoki sik’oyo kosalela yo ? Tolobela yo epai ya mokonzi to epai ya mokonzi ya basoda ? » Mwasi ya Sunami azongisaki : — Navandaka na kimia kati na bato na ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 4:13
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakondima eloko te longola kaka biloko oyo bato na ngai baliaki mpe biloko ya bato oyo bazalaki elongo na ngai : Aneri, Eshikoli mpe Mamire ; bango nde bakozwa biloko na bango.


Bozali bandeko na ngai ya mibali, nzoto na ngai mpe makila na ngai. Bongo mpo na nini kozala bato ya suka mpo na kozongisa mokonzi ?


Tika ete Yawe akweyisa likolo na ye moko mokumba ya makila oyo asopaki, pamba te abundisaki bato mibale mpe abomaki bango na mopanga ; tata na ngai, Davidi, ayebaki kutu te. Tala bakombo ya bato mibale yango : Abineri, mwana mobali ya Neri, mokonzi ya mampinga ya Isalaele ; mpe Amasa, mwana mobali ya Yeteri, mokonzi ya mampinga ya Yuda ; bazalaki bato malamu mpe ya sembo koleka ye.


Bongo alobaki na mosali na ye, Geazi : « Benga mwasi oyo ya Sunami. » Geazi abengaki mwasi ya Sunami, mpe mwasi yango ayaki kotelema liboso ya Elize.


Elize atunaki mosali na ye, Geazi : — Eloko nini tokoki kosala mpo na ye ? Geazi azongisaki : — Azali na mwana te, mpe mobali na ye azali mobange.


Elize alobaki na mama ya mwana mobali oyo asekwisaki : « Kende elongo na libota na yo na esika oyo bokoki kovanda, pamba te Yawe abengi nzala makasi kati na mokili oyo ; ekowumela mibu sambo. »


Tango akomaki, akutaki bakonzi ya mampinga bavandi kati na lisanga. Alobaki : — Nazali na sango mpo na yo mokonzi. Jewu atunaki : — Mpo na nani kati na biso ? Mosakoli azongisaki : — Mpo na yo mokonzi.


Tia elikya na yo kati na Yawe mpe sala bolamu, vanda kati na mokili mpe lia na kimia.


Nazali kosenga na bino ete boyamba ye kati na Nkolo na lolenge oyo ebongi na basantu mpe bosunga ye na makambo nyonso oyo akosenga bino, pamba te asungaki bato ebele penza, ngai mpe lokola.


Bopesa mbote na Mari oyo asalaki mosala makasi mpo na bino.


Bozalaka na lokoso ya mbongo te, bosepelaka nde na oyo bozali na yango, pamba te Ye moko Nzambe alobaki : « Nakotikala kokabwana na yo te, nakotikala kosundola yo te. »


Pamba te Nzambe azangi bosembo te mpo ete abosana mosala na bino mpe bolingo nyonso oyo botalisaki mpo na Kombo na Ye, na ndenge bosungaki mpe bozali kokoba kosunga basantu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ