Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 4:12 - Mokanda na Bomoi

12 Bongo alobaki na mosali na ye, Geazi : « Benga mwasi oyo ya Sunami. » Geazi abengaki mwasi ya Sunami, mpe mwasi yango ayaki kotelema liboso ya Elize.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 4:12
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Alobaki na mosali na ye : — Kende kotala na nzela ya ebale monene. Mosali na ye akendeki kotala, alobaki : — Eloko moko te ezali kuna. Eliya atindaki ye mbala sambo na maloba oyo : « Kende kotala lisusu ! »


Eliya abangaki mpe akimaki mpo na kobikisa bomoi na ye. Tango akomaki na Beri-Sheba ya Yuda, atikaki kuna mosali na ye.


Kasi Jozafati atunaki : — Awa, ezali te na mosakoli ya Yawe mpo ete totuna toli ya Yawe na nzela na ye ? Mokonzi moko ya mampinga ya mokonzi ya Isalaele azongisaki : — Elize, mwana mobali ya Shafati, azali awa. Azalaki kosopa mayi na maboko ya Eliya.


Mokolo moko, Elize ayaki na Sunami, amataki na shambre na ye mpe alalaki kuna.


Elize alobaki na Geazi : — Loba na ye : « Omitungisi mingi mpo na biso. Eloko nini tokoki sik’oyo kosalela yo ? Tolobela yo epai ya mokonzi to epai ya mokonzi ya basoda ? » Mwasi ya Sunami azongisaki : — Navandaka na kimia kati na bato na ngai.


Tango bakomaki na Salamine, bateyaki Liloba na Nzambe kati na bandako ya mayangani ya Bayuda. Yoane Malako azalaki elongo na bango lokola mosungi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ