Atindaki lisusu sango oyo epai ya Jozafati, mokonzi ya Yuda : — Mokonzi ya Moabi atombokeli ngai. Okoki solo kokende elongo na ngai mpo na kobundisa bato ya Moabi ? Mokonzi Jozafati azongisaki : — Nakokende na yo elongo. Ngai na yo tozali kaka moto moko ; bato na ngai bazali kaka bato na yo, bongo bampunda na ngai ezali mpe bampunda na yo.