Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 3:7 - Mokanda na Bomoi

7 Atindaki lisusu sango oyo epai ya Jozafati, mokonzi ya Yuda : — Mokonzi ya Moabi atombokeli ngai. Okoki solo kokende elongo na ngai mpo na kobundisa bato ya Moabi ? Mokonzi Jozafati azongisaki : — Nakokende na yo elongo. Ngai na yo tozali kaka moto moko ; bato na ngai bazali kaka bato na yo, bongo bampunda na ngai ezali mpe bampunda na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 3:7
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Alobaki mpe na Jozafati : — Boni, okoki solo kosepela kokende elongo na ngai mpo na kobundisa Ramoti ya Galadi ? Jozafati azongiselaki mokonzi ya Isalaele : — Ngai mpe yo, bato na ngai mpe bato na yo, tozali se moko, ezala bampunda na ngai mpe bampunda na yo.


Elize akufaki, mpe bakundaki ye. Nzokande masanga ya bato mabe ya Moabi bazalaki kokota na mokili ya Isalaele na ebandeli ya mibu nyonso.


Na tango wana, mokonzi Yorami abimaki na Samari mpe asangisaki Isalaele mobimba.


Jozafati atunaki : — Tokokende na nzela nini ? Yorami azongisaki : — Na nzela ya esobe ya Edomi.


Mokonzi ya Isalaele abimaki elongo na mokonzi ya Yuda mpe mokonzi ya Edomi. Batambolaki mikolo sambo, kasi mayi ya komela ezalaki lisusu te mpo na mampinga mpe banyama oyo ezalaki kotambola elongo na bango.


Akabi, mokonzi ya Isalaele, atunaki epai ya Jozafati, mokonzi ya Yuda : — Okoki solo kosepela kokende elongo na ngai mpo na kobundisa Ramoti ya Galadi ? Jozafati azongisaki : — Ngai mpe yo, bato na ngai mpe bato na yo, tozali se moko ; tokokende elongo na yo na bitumba.


mosakoli Jewu, mwana mobali ya Anani, akendeki kokutana na ye. Alobaki na mokonzi Jozafati : « Mpo na nini kosunga moto mabe mpe kolinga bato oyo bayinaka Yawe ? Mpo ete osali bongo, kanda makasi ya Yawe ezali likolo na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ