Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 3:4 - Mokanda na Bomoi

4 Mesha, mokonzi ya Moabi, azalaki kobokola bameme. Mibu nyonso, azalaki kofuta mpako epai ya mokonzi ya Isalaele, oyo ezalaki na motuya ya bampate nkoto nkama moko mpe ya bameme ya mibali nkoto nkama moko elongo na bapwale na yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 3:4
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abrami akomaki na bozwi mingi : bibwele, palata mpe wolo.


Davidi alongaki lisusu bato ya Moabi mpe alalisaki bango na mabele, na etando oyo ezalaki na molayi ya basinga misato, oyo bamekelaka molayi. Abomaki ndambo mibale kati na bandambo misato ya bato nyonso oyo balalaki na etando mpe atikaki na bomoi ndambo moko ya bato. Boye, bato ya Moabi bakomaki bawumbu ya Davidi mpe bakomaki kofuta mpako ya mokonzi.


Bongo Davidi atiaki bayangeli na ye kati na engumba Damasi ya Siri, mpe bato ya Siri bakomaki na se ya bokonzi ya Davidi mpe bakomaki kofuta mpako epai na ye. Yawe azalaki kopesa Davidi elonga na bisika nyonso oyo azalaki kokende.


Davidi alongaki lisusu bato ya Moabi. Bato ya Moabi bakomaki bawumbu ya Davidi mpe bakomaki kofuta mpako ya mokonzi.


Atongaki lisusu bandako milayi kati na esobe mpe atimolaki mabulu ebele ya mayi mpo ete azalaki na bibwele ebele na se ya bangomba mpe na etando. Azalaki mpe na basali ebele oyo bazalaki kotimola mabele mpe kosala kati na bilanga na ye ya vino kati na bituka ya bangomba mpe na mabele oyo ebotaka malamu, pamba te azalaki kolinga mingi misala ya bilanga.


mpe azalaki na etonga ya bameme nkoto sambo, bashamo nkoto misato, bangombe nkoto moko, ba-ane nkama mitano, mpe azalaki na basali ebele penza. Alekaki bato nyonso ya Este na lokumu.


Yawe apambolaki suka ya Yobo koleka ebandeli ya bomoi na ye. Azalaki na bameme nkoto zomi na minei, bashamo nkoto motoba, bangombe nkoto mibale mpe ba-ane nkoto moko.


Nzambe alobaki kati na Esika na Ye ya bule : « Nakolonga ! Nakokabola Sishemi mpe nakomeka molayi ya lubwaku ya Sukoti.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ