Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 3:25 - Mokanda na Bomoi

25 Babebisaki bingumba, mpe moto nyonso abwakaki libanga moko na bilanga nyonso ya kitoko kino etondaki na mabanga, bakangaki bitima nyonso ya mayi, mpe bakataki nzete nyonso ya kitoko. Kaka engumba ya Kiri-Aresheti nde etikalaki na mabanga na yango ; kasi babwaki ya mabanga bazingelaki yango mpe babundisaki yango lokola.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 3:25
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye bato ya Filisitia bakundaki mabulu nyonso oyo basali ya Abrayami, tata na ye, batimolaki tango azalaki nanu na bomoi mpe batondisaki yango na mabele.


Atimolaki lisusu mabulu ya mayi oyo batimolaki na tango ya tata na ye Abrayami. Mabulu yango ezalaki bato ya Filisitia nde bakundaki yango sima na kufa ya Abrayami, mpe Izaki abengaki yango kaka na bakombo oyo tata na ye Abrayami apesaka yango.


Davidi alongaki lisusu bato ya Moabi mpe alalisaki bango na mabele, na etando oyo ezalaki na molayi ya basinga misato, oyo bamekelaka molayi. Abomaki ndambo mibale kati na bandambo misato ya bato nyonso oyo balalaki na etando mpe atikaki na bomoi ndambo moko ya bato. Boye, bato ya Moabi bakomaki bawumbu ya Davidi mpe bakomaki kofuta mpako ya mokonzi.


Bokobuka bingumba na bango nyonso oyo batonga makasi mpe bingumba nyonso ya minene, bokokata banzete na bango nyonso ya kitoko, bokokanga bitima nyonso ya mayi mpe bokobebisa bilanga nyonso na mabanga. »


Kasi tango bato ya Moabi bakomaki na molako ya bana ya Isalaele, bana ya Isalaele batelemaki, babundisaki bango kino bato ya Moabi bakimaki. Bato ya Isalaele bakotaki na mboka Moabi mpe babetaki yango.


Tango mokonzi ya Moabi amonaki ete bitumba ebalukeli ye, akamataki basoda nkama sambo oyo babundaka na mipanga, mpo na kofungola nzela kino epai ya mokonzi ya Edomi, kasi balongaki te.


Bato ebele basanganaki mpe bakangaki bitima nyonso elongo na mayi oyo ezalaki kotiola na se ya mabele. Balobaki : — Mpo na nini bakonzi ya Asiri baya kokuta mayi ebele ?


Maloba ya kosambisa mokili ya Moabi : Pamba te na butu oyo Moabi ebebisamaki, Ari kati na Moabi mpe ebebisamaki, solo, ebebisamaki kaka na butu moko ! Kiri kati na Moabi mpe ebebisamaki ; solo, ebebisamaki kaka na butu moko !


Motema na ngai ezali kolela lokola lindanda mpo na Moabi, mpe kati ya motema na ngai ezali komona pasi mpo na Kiri-Aresheti.


Yango wana, bato ya Moabi bakosala matanga, bakomilela bango na bango mpo na Moabi. Bolela mpe bozala na mawa mpo na mikate ya Kiri-Aresheti, oyo basala na bambuma ya vino.


Yango wana nazali kolela mpo na Moabi, nazali kolela mpo na Moabi nyonso ; nazali kosala matanga mpo na bato ya Kiri-Eresheti.


« Mpe motema na Ngai ezali kolela Moabi ndenge flite ebetaka, ezali kolela lokola flite mpo na bato ya Kiri-Eresheti. Bomengo na bango nyonso esili kobunga.


Yawe alobaki na ngai : « Bomona bato ya Moabi lokola banguna na bino te mpe bobundisa bango te, pamba te nakopesa bino ata eloko moko te kati na mokili na bango. Nasila kopesa mokili ya Ari lokola bozwi epai ya bakitani ya Loti. »


Abimeleki abundisaki engumba mokolo mobimba, abotolaki engumba yango mpe abomaki bato oyo bazalaki kuna. Bongo abebisaki engumba mpe asopelaki yango mungwa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ