Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 3:23 - Mokanda na Bomoi

23 Bagangaki : « Ezali makila ! Bakonzi babundi bango na bango. Sik’oyo, bato na Moabi, tokende kobotola biloko na bango ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 3:23
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango balamukaki na tongo-tongo, moyi ezalaki kongala na mayi ; mpe bato ya Moabi bamonaki liboso na bango mayi motane lokola makila.


Kasi tango bato ya Moabi bakomaki na molako ya bana ya Isalaele, bana ya Isalaele batelemaki, babundisaki bango kino bato ya Moabi bakimaki. Bato ya Isalaele bakotaki na mboka Moabi mpe babetaki yango.


pamba te Nkolo asalaki ete bato ya Siri bayoka lokito ya bashar, ya bampunda mpe ya mampinga minene ya basoda kino balobanaki bango na bango : « Tala, mokonzi ya Isalaele azwi mokonzi ya bato ya Iti mpe mokonzi ya bato ya Ejipito mpo na koya kobundisa biso. »


Jozafati elongo na bato na ye bakendeki kozwa bomengo ya bitumba ; mpe bamonaki bibembe ebele, biloko ebele, bilamba ebele mpe biloko ebele ya talo. Balokotaki biloko ebele oyo bakokaki ata komema te. Basalaki mikolo misato mpo na kozwa yango, pamba te bomengo ya bitumba ezalaki ebele penza.


Monguna amilobelaki : « Nakolanda bango kino nakokanga bango, molimo na ngai ekotonda na biloko oyo nakobotola ; nakobimisa mopanga na ngai, mpe loboko na ngai ekobebisa bango. »


Loboko na ngai ekamataki bomengo na bango ndenge bakamataka zala ya ndeke ; mpe ndenge bato balokotaka maki batika, ndenge wana mpe ngai nalokotaki mokili mobimba : moko te eningisaki lipapu to efungolaki monoko mpo na kobeta piololo. › »


« Ezali te mpo bazwi mpe bakaboli bomengo ya bitumba : Elenge mwasi moko to bilenge basi mibale mpo na soda moko, bilamba ya langi mpo na Sisera, bilamba, bilamba ya langi, mpe bilamba oyo batia bililingi, mpo na balongi ? »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ