Akufaki likolo ya masumu oyo asalaki, na kosala mabe na miso ya Yawe mpe na kotambola na banzela ya Jeroboami oyo asalaki masumu oyo ememaki Isalaele na libebi.
Solo, ezalaki na moto moko te oyo amitekaki na kosala mabe na miso ya Yawe lokola Akabi. Ezalaki mwasi na ye Jezabeli nde azalaki kotindika ye kosala mabe.
Abonzaki na moto, lokola mbeka, mwana na ye ya mobali ; asalelaki kindoki, soloka mpe maji. Atiaki na mosala bato oyo basololaka na milimo ya bakufi mpe bamoni makambo. Akobaki kosala makambo mabe na miso ya Yawe ; mpe, na bongo, apelisaki kanda ya Yawe.
Tango kaka Yorami amonaki Jewu, atunaki ye : — Boni Jewu, oyei mpo na kimia ? Jewu azongisaki : — Ndenge nini kimia ekoki kozala na tango losambo ya banzambe ya bikeko mpe kindoki ya mama na yo, Jezabeli, ezali kokoba ?
Bokogumbamela banzambe na bango te mpe bokosalela yango te to bokolanda te lolenge na bango ya kosalela. Bokokweyisa banzambe yango mpe bokobuka-buka bikeko na bango na biteni.