Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 3:13 - Mokanda na Bomoi

13 Elize alobaki na mokonzi ya Isalaele : — Ngai na yo likambo nini ? Kende koluka mosakoli ya tata na yo to ya mama na yo. Mokonzi ya Isalaele azongisaki : — Te ! Yawe asangisi biso te, biso bakonzi oyo misato, mpo na kokaba biso na maboko ya bato ya Moabi !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 3:13
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mwasi yango alobaki na Eliya : — Moto na Nzambe, nasali yo nini ? Boni, oyaki na ndako na ngai mpo na kokundola lisumu na ngai mpe kobomisa mwana na ngai ya mobali ?


Sik’oyo bengisa bato ya Isalaele nyonso ete tokutana na ngomba Karimeli elongo na basakoli ya Bala nkama minei na tuku mitano mpe basakoli ya Ashera nkama minei oyo baliaka na mesa ya Jezabeli.


Boye mokonzi ya Isalaele asangisaki basakoli pene nkama minei mpe atunaki bango : — Nakoki solo kokende kobundisa Ramoti ya Galadi to te ? Bazongiselaki ye : — Kende, pamba te Nkolo akokaba yango na maboko ya mokonzi.


Mokonzi ya Isalaele akamwaki : — Ndenge nini boye ! Yawe asangisi biso awa, biso bakonzi misato, kaka mpo na kokaba biso na maboko ya bato ya Moabi ?


Jozafati alobaki : — Solo, Liloba na Yawe ezali elongo na ye. Boye mokonzi ya Isalaele elongo na Jozafati mpe mokonzi ya Edomi bakendeki epai ya Elize.


Bakoganga epai na Ngai, kasi nakoyanola bango te ; bakoluka Ngai na ngonga ya malamu, kasi bakomona Ngai te.


Wapi basakoli na bino oyo bazalaki koloba ete mokonzi ya Babiloni akoya te kobundisa bino mpe mokili na bino ?


Boya, tozonga epai na Yawe ! Akati-kati biso solo na biteni, kasi akobikisa biso ; azokisaki biso, kasi akotia kisi na bapota na biso.


Bakomaki koganga : — Mwana na Nzambe, biso na yo likambo nini ? Boni, oyei awa mpo na kotungisa biso liboso ya tango oyo ekatama ?


Kasi Yesu azongiselaki ye : — Mwasi, biso na yo likambo nini ? Tango na Ngai ekoki nanu te.


Boye, kobanda sik’oyo, tokotala lisusu moto moko te na ndenge ya bomoto. Atako, na kala, totalaki Klisto na ndenge ya bomoto, kasi sik’oyo tozali lisusu kotala Ye bongo te.


Klisto akoki solo koyokana na Satana ? Eloko nini ekoki kosangisa mondimi elongo na moto oyo azangi kondima ?


Bokende koganga epai ya banzambe oyo boponaki mpo ete ebikisa bino awa bozali kati na pasi.


Naomi alobaki na Rite : — Tala, mbanda na yo azongi epai ya bato na ye mpe epai ya banzambe na ye ; yo mpe zonga elongo na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ