12 Jozafati alobaki : — Solo, Liloba na Yawe ezali elongo na ye. Boye mokonzi ya Isalaele elongo na Jozafati mpe mokonzi ya Edomi bakendeki epai ya Elize.
Kasi Jozafati atunaki : — Awa, ezali te na mosakoli ya Yawe mpo ete totuna toli ya Yawe na nzela na ye ? Mokonzi moko ya mampinga ya mokonzi ya Isalaele azongisaki : — Elize, mwana mobali ya Shafati, azali awa. Azalaki kosopa mayi na maboko ya Eliya.
Elize alobaki na mokonzi ya Isalaele : — Ngai na yo likambo nini ? Kende koluka mosakoli ya tata na yo to ya mama na yo. Mokonzi ya Isalaele azongisaki : — Te ! Yawe asangisi biso te, biso bakonzi oyo misato, mpo na kokaba biso na maboko ya bato ya Moabi !
Bongo Namani elongo na basali na ye nyonso bazongaki epai ya moto na Nzambe. Atelemaki liboso ya Elize mpe alobaki : — Nayebi sik’oyo ete ezali na Nzambe te kati na mokili mobimba longola kaka kati na Isalaele. Nabondeli yo, ndima kado kowuta na mosali na yo.
Bakonzi bakozala batata babokoli na yo, mpe basi na bango, basungi na yo ; bakofukama liboso na yo na bilongi etala na mabele, bakolembola putulu ya makolo na yo. Boye, okoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe ; ete bato oyo batielaka Ngai motema bayokisamaka soni te. »
Bana ya banyokoli na yo bakoya kofukama liboso na yo ; bato nyonso oyo batiolaki yo bakofukama na se ya matambe na yo mpe bakobenga yo Engumba ya Yawe, Siona ya Mosantu ya Isalaele.
Mokolo moko, mokonzi Sedesiasi atindaki ete bakende kozwa ye mpe bamema ye na ndako ya mokonzi epai wapi atunaki ye na nkuku : — Boni, ozali ata na liloba moko te kowuta epai na Yawe ? Jeremi azongisaki : — Solo, liloba ezali ! Okokweya na maboko ya mokonzi ya Babiloni.
Tala makambo oyo nakosala bato ya ndako ya mayangani ya Satana, oyo balobaka ete bazali Bayuda, nzokande bazali na bango Bayuda te ; bazali nde bakosi. Nakosala ete baya kofukama na makolo na yo mpe bandima ete nalingaka yo.