Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 25:8 - Mokanda na Bomoi

8 Tango Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, akokisaki mibu zomi na libwa na bokonzi, Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli mpe mosali ya mokonzi ya Babiloni, ayaki na Yelusalemi na mokolo ya sambo ya sanza ya mitano.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 25:8
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yeoyakini, mokonzi ya Yuda ; mama na ye, basali na ye, bakambi na ye mpe bakalaka na ye ya lokumu bamipesaki bango nyonso epai ya mokonzi Nabukodonozori. Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, atiaki Yeoyakini na boloko na mobu ya mwambe ya bokonzi na ye.


Tango Sedesiasi akokisaki mibu libwa na bokonzi, na mokolo ya zomi ya sanza mpe ya zomi, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, elongo na mampinga na ye nyonso, ayaki kobundisa Yelusalemi. Batongaki molako na bango libanda ya engumba, mpe atongaki mabulu mpo na kobombama, na zingazinga na yango nyonso.


Tango Yeoyakini, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na sambo na bowumbu, Evili-Merodaki, mokonzi ya Babiloni, ayokelaki Yeoyakini, mokonzi ya Yuda, mawa mpe abimisaki ye na boloko, na mokolo ya tuku mibale na sambo ya sanza ya zomi na mibale, kaka na mobu oyo akomaki mokonzi.


Boye, mpo na kobebisa bango, Yawe atindaki mokonzi ya bato ya Babiloni, oyo abomaki na mopanga bilenge na bango kati na esika na bango ya bule ; abikisaki te ezala elenge mobali, elenge mwasi, mokolo to mobange. Nzambe akabaki nyonso na maboko ya Nabukodonozori.


Kasi lokola batata na biso batumbolaki kanda ya Nzambe ya Likolo, akabaki bango na maboko ya Nabukodonozori, moto ya Chalide, mokonzi ya Babiloni. Ezali ye nde abukaki Tempelo oyo mpe amemaki bato na bowumbu, na Babiloni.


kasi nazongiselaki mokonzi : — Tika ete mokonzi awumela na bomoi ! Ndenge nini elongi na ngai ezala mawa-mawa te tango engumba epai wapi bakunda batata na ngai ebebi mpe bikuke na yango ebebisamaki na moto ?


Bakonzi ya mabele mpe bikolo mosusu ya mokili bandimaki te ete banguna mpe bayini bakokaki kokota na bikuke ya Yelusalemi.


« Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : Mikolo ya kokila bilei ya sanza ya minei, ya mitano, ya sambo mpe ya zomi ekokoma mikolo ya esengo mpe ya kosepela, ekokoma bafeti ya nkembo mpe ya esengo mpo na libota ya Yuda. Kasi bolinga solo mpe kimia. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ