Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 25:7 - Mokanda na Bomoi

7 Bakataki mito ya bana mibali ya Sedesiasi na miso na ye ; mpe Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, atobolaki miso ya Sedesiasi, apesaki mitindo ete bakanga ye minyololo ya bronze mpe bamema ye na Babiloni.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 25:7
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Akendeki kovanda na monkama ya bametele, pamba te alobaki : « Nalingi te komona kufa ya mwana na ngai. » Lokola avandaki mosika ya mwana, atombolaki mongongo mpe alelaki.


Ndenge nini nakoki kozonga epai ya tata na ngai soki elenge mobali azali elongo na ngai te ? Kotika te ete namona pasi oyo ekokomela tata na ngai !


Bongo Yawe atindaki bakonzi ya basoda ya mokonzi ya Asiri kobundisa bango. Bakangaki Manase mpe bakotisaki na zolo na ye ebende oyo ezali lokola ndobo, bakangaki ye minyololo ya bronze mpe bamemaki ye na Babiloni.


Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, abundisaki ye mpe akangaki ye minyololo ya bronze mpo na komema ye na Babiloni.


mpo na kokanga bakonzi na bango na minyololo, kokanga bato na bango ya lokumu na mabende


Bakambi na yo nyonso bakimaki elongo ; bakangaki bango na basoda na nguya ya tolotolo. Mpe bato na yo, oyo bazalaki kokima monguna na mosika, bakangaki bango mpe bakomaki elongo bakangami.


Sima na yango, elobi Yawe, nakokaba na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe na maboko ya banguna na bango oyo bazali na posa ya kosala bango mabe : Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, bakalaka na ye mpe bavandi ya engumba oyo, ba-oyo bakobika na bokono oyo ebomaka, na mopanga mpe na nzala makasi. Nabukodonozori akoboma bango na mopanga, akokangela bango motema mpe akoyokela bango mawa te. ›


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Koma kombo ya moto oyo lokola moto oyo abota te, lokola moto oyo akolonga te na bomoi na ye, pamba te moko te kati na bana na ye akolonga, moko te akovanda lisusu na kiti ya bokonzi ya Davidi to akozala lisusu mokonzi ya Yuda. »


Bongo yo, okobika te na loboko na ye, kasi bakokanga yo solo mpe bakokaba yo na maboko na ye ; okomona mokonzi ya Babiloni miso na yo moko, akolobana na yo elongi na elongi, mpe okokende na Babiloni.


Mokolo moko, mokonzi Sedesiasi atindaki ete bakende kozwa ye mpe bamema ye na ndako ya mokonzi epai wapi atunaki ye na nkuku : — Boni, ozali ata na liloba moko te kowuta epai na Yawe ? Jeremi azongisaki : — Solo, liloba ezali ! Okokweya na maboko ya mokonzi ya Babiloni.


Bakomema basi na yo nyonso mpe bana na yo nyonso epai ya bato ya Babiloni ; mpe yo moko okobika te na maboko na bango, mokonzi ya Babiloni akokanga yo mpe akobebisa engumba oyo na moto.


Bikuke na yango ezindi na mabele ; abuki-buki mpe abebisi banzete oyo bakangelaka bikuke yango. Mokonzi mpe bakambi na ye bakei na bowumbu kati na bikolo, Mobeko ezali lisusu te, mpe basakoli na ye bazali kozwa lisusu te bimoniseli kowuta na Yawe.


Loba na bango : ‹ Nazali elembo mpo na bino. › Ndenge Ngai nasali, ndenge wana mpe ekosalema epai na bango : bakokende na bowumbu lokola bakangami.


Mokonzi akozala na matanga, mokambi akolata pili, mpe maboko ya bato ya mokili ekokoma kolenga. Nakofuta bango kolanda etamboli na bango mpe nakosambisa bango kolanda misala na bango. Boye, bakoyeba solo ete Ngai nazali Yawe. › »


Bokobela liboma likolo ya makambo oyo miso na bino ekobanda komona.


Yawe akomema bino mpe mokonzi oyo bokopona mpo na koyangela bino, na ekolo oyo bino mpe bakoko na bino botikala nanu koyeba te. Kuna bokogumbamela banzambe mosusu : banzambe ya banzete mpe ya mabanga.


Bato ya Filisitia bakangaki ye, batobolaki ye miso, bamemaki ye na Gaza mpe bakangaki ye minyololo ya bibende ya bronze. Akomaki konika bambuma ya ble na enikelo ya libanga kati na boloko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ