Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 25:30 - Mokanda na Bomoi

30 Mokonzi ya Babiloni azalaki kopesa ye nyonso oyo asengeli na yango mikolo nyonso ya bomoi na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 25:30
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi talisa bolamu epai ya bana mibali ya Barizilayi, moto ya Galadi ; mpe sala ete bazala kati na bato oyo bakobanda kolia mesa moko elongo na yo, pamba te basungaki ngai tango nazalaki kokima Abisalomi, ndeko na yo ya mobali.


Misala ya bayembi ezalaki kotambolisama mokolo na mokolo na mitindo ya mokonzi.


Na tango ya Zorobabeli mpe ya Neyemi, bato nyonso ya Isalaele bazalaki kopesa, mikolo nyonso, biloko oyo ekatama mpo na babeti mindule mpe bakengeli bikuke ; bazalaki mpe kopesa biloko ya bule epai ya Balevi, bongo Balevi mpe, na ngambo na bango, bazalaki kopesa biloko ya bule epai ya bakitani ya Aron.


Nakobengana yo elongo na mama oyo abota yo na mokili mosusu epai wapi moko te kati na bino abotama, mpe ekozala kuna nde bino mibale bokokufa.


Mokonzi ya Babiloni azalaki kopesa ye nyonso oyo asengeli na yango mikolo nyonso ya bomoi na ye kino na mokolo ya kufa na ye.


Mokonzi akatelaki bango mpo na mokolo na mokolo, bilei oyo basengeli kolia mpe masanga oyo basengeli komela : nyonso ezalaki kowuta na mesa na ye. Mibu misato, basengelaki koyekola ; na sima nde bakoki kosala mosala ya mokonzi.


Pesa biso, na mokolo ya lelo, bilei na biso ya mokolo na mokolo ;


Pesa biso bilei oyo tosengeli na yango, mokolo na mokolo,


Na mikolo wana, motango ya bayekoli ezalaki kaka kobakisama. Bayuda oyo bazalaki koloba lokota ya Greki bakomaki koyimayima mpo na kotelemela Bayuda oyo bazalaki koloba lokota ya Ebre, pamba te basi na bango oyo bakufisa mibali bazalaki kozangela na tango ya kokabola bilei ya mokolo na mokolo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ