2 Bakonzi 25:3 - Mokanda na Bomoi3 Na mokolo ya libwa ya sanza ya minei, wana nzala makasi ekotaki kati na engumba mpe bato bazalaki lisusu na eloko ya kolia te, အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Lokola bazingelaki Samari tango molayi, nzala makasi ekotaki kati na engumba kino moto moko ya ane ekomaki kotekama na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, tuku mwambe ; mpe bagrame nkama mibale na tuku mitano ya nyei ekawuka ya ebenga ekomaki kotekama na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, mitano.
« Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Moto nyonso oyo akotikala kati na engumba oyo akokufa na mopanga, na nzala makasi to mpe na bokono oyo ebomaka ; kasi ye oyo akobima mpo na kokende komikaba epai ya bato ya Babiloni akobika, akokufa te ; bomoi na ye ekozala bomengo na ye ya bitumba, mpe akotikala na bomoi. ›
Ndambo moko kati na bandambo misato ya bato na yo bakokufa na bokono oyo ebomaka to na nzala makasi kati na bamir na yo ; mpe ndambo moko kati na bandambo misato mosusu bakokufa na mopanga na libanda ya bamir na yo. Bongo, nakopanza ndambo moko kati na bandambo misato mosusu, na bisika mosusu mpe nakolanda bango na mopanga.