29 apesaki mitindo ete balongola ye bilamba ya boloko mpe andimaki ete abanda kolia mesa moko elongo na ye, mokolo na mokolo kino na suka ya bomoi na ye.
Faraon alongolaki lopete na ye na mosapi na ye mpe atiaki yango na mosapi ya Jozefi. Alatisaki ye bilamba ya lino ya kitoko mpe atiaki ye singa ya wolo na kingo.
Davidi alobaki na ye : — Kobanga te ! Pamba te nakotalisa yo solo bolamu mpo na tata na yo, Jonatan. Nakozongisela yo mabele nyonso ya koko na yo, Saulo, mpe okobanda kolia tango nyonso na mesa na ngai.
Kasi talisa bolamu epai ya bana mibali ya Barizilayi, moto ya Galadi ; mpe sala ete bazala kati na bato oyo bakobanda kolia mesa moko elongo na yo, pamba te basungaki ngai tango nazalaki kokima Abisalomi, ndeko na yo ya mobali.
Yeoyakini, mokonzi ya Yuda ; mama na ye, basali na ye, bakambi na ye mpe bakalaka na ye ya lokumu bamipesaki bango nyonso epai ya mokonzi Nabukodonozori. Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, atiaki Yeoyakini na boloko na mobu ya mwambe ya bokonzi na ye.
Maridoshe alongwaki liboso ya mokonzi, na bilamba ya bokonzi ya langi ya ble mpe ya pembe, na motole monene ya wolo mpe na nzambala ya motane makasi ya lino ya kitoko. Engumba mobimba ya Size ezalaki koganga na esengo mpe ezalaki kosepela.
komema epai na bato ya Siona, oyo bazali na matanga mitole na esika ya putulu, mafuta ya esengo na esika ya matanga, mpe kopesa elamba ya lokumu na esika ya molimo oyo etutami. Bakobengama terebente ya bosembo, elanga ya Yawe, mpo na komonisa nkembo na Ye.
Bongo Anjelu alobaki na ba-oyo bazalaki kotelema liboso na ye : — Bolongola ye bilamba wana ya salite ! Mpe alobaki na Jozue : — Tala, nalongoli masumu na yo mpe nakolatisa yo bilamba ya talo.
Kasi tata alobaki na basali na ye : « Bomema na lombangu nzambala oyo eleki kitoko mpe bolatisa ye yango ; bolatisa ye lopete, na mosapi, mpe basandale, na makolo na ye.