Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 25:24 - Mokanda na Bomoi

24 Gedalia alapaki ndayi liboso na bango mpe basoda na bango na maloba oyo : « Bobanga te kosalela bato ya Babiloni, bovanda kati na mokili, bosalela mokonzi ya Babiloni mpe bokozala na bino malamu. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 25:24
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mwasi alobaki : — Tika ete mokonzi alapa ndayi na Kombo na Yawe, Nzambe na ye, ete akopekisa mobukanisi makila mpo ete akoba te kobebisa na koboma mwana na ngai ya mobali, oyo atikali. Mokonzi alobaki : — Na Kombo na Yawe, suki ata moko te ya moto ya mwana na yo ya mobali ekokweya na mabele.


Davidi azongisaki : — Likambo nini kati na ngai mpe bino bana mibali ya Tseruya ? Bokomi lelo banguna na ngai ! Boni, basengeli koboma moto moko lelo kati na Isalaele ? Nayebi te ete ngai nde nazali lelo mokonzi ya Isalaele ?


Tango bakonzi nyonso ya mampinga elongo na basoda na bango bayokaki ete mokonzi ya Babiloni akomisi Gedalia moyangeli, bakendeki na Mitsipa epai ya Gedalia. Tala bakombo ya bato yango : Isimaeli, mwana mobali ya Netania ; Yoanani, mwana mobali ya Karea ; Seraya, mwana mobali ya Tanumeti, moto ya Netofa ; mpe Yazania, mwana mobali ya moto moko ya Maakati. Bakendeki kuna elongo na basoda na bango.


Kasi na sanza ya misato, Isimaeli, mwana mobali ya Netania mpe koko ya Elishama, oyo azalaki na molongo ya libota ya bokonzi, ayaki elongo na basoda zomi ; babomaki Gedalia elongo na bato ya Yuda mpe bato ya Babiloni oyo bazalaki elongo na ye, na Mitsipa.


bamemaki lisusu mibali, basi, bana mpe bana basi ya mokonzi oyo Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, apesaki na maboko ya Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani. Bamemaki mpe mosakoli Jeremi mpe Baruki, mwana mobali ya Neriya.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ