Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 25:21 - Mokanda na Bomoi

21 Mokonzi ya Babiloni abomaki bango kuna na Ribila, kati na mokili ya Amati. Boye, bato ya Yuda bakendeki na bowumbu mosika ya mokili na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 25:21
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango bana ya Isalaele bakosala masumu liboso na Yo, pamba te moto nyonso asalaka masumu, bongo Yo osilikeli bango mpe okabi bango na maboko ya banguna oyo bamemi bango na bowumbu, na mokili ya banguna, ezala ya mosika to ya pene,


Boye, Yawe abwakaki bana nyonso ya Isalaele, ayokisaki bango pasi, akabaki bango na maboko ya bato ya mobulu, mpe abenganaki bango mosika na Ye.


kino tango Yawe abenganaki bango mosika na Ye, ndenge ayebisaki bango na nzela ya basali na Ye nyonso, basakoli. Boye, bamemaki bana ya Isalaele na bowumbu, mosika ya mokili na bango, na Asiri kino lelo.


Boye Yawe alobaki : « Nakobengana mpe Yuda na miso na Ngai ndenge nabenganaki Isalaele ; nakobwaka Yelusalemi, engumba oyo napona, elongo na Tempelo na yango, oyo na tina na yango nalobaki : ‹ Kombo na Ngai ekozala kuna. › »


Nabukodonozori amemaki Yeoyakini na bowumbu na Babiloni ; amemaki mpe, longwa na Yelusalemi kino na Babiloni, mama ya mokonzi, basi ya mokonzi, bakalaka ya lokumu mpe bankumu ya mokili.


Yango wana, nakobwaka bino libanda ya mokili oyo mpe nakomema bino na mokili oyo, ezala bino to batata na bino, botikala koyeba te ; mpe kuna, bokosalela banzambe ya bapaya, butu mpe moyi ; pamba te nakoyokela bino mawa te. ›


Mokonzi ya Babiloni abomaki bango kuna na Ribila, kati na mokili ya Amati. Boye, bato ya Yuda bakendeki na bowumbu mosika ya mokili na bango.


Yawe, Ye moko, apanzi bango, azali kotala bango lisusu te. Bapesaki Banganga-Nzambe lokumu te mpe bayokelaki mibange mawa te.


Ngai Yawe nde nalobaki. Tango ekoki mpo na Ngai kosala ; nakoyoka mawa te, nakozonga sima te ! Okosambisama solo kolanda etamboli mpe misala na yo, elobi Nkolo Yawe. › »


Yango wana nakotinda bino na bowumbu, mosika koleka Damasi, elobi Ye oyo Kombo na Ye ezali : Yawe, Nzambe Mokonzi ya mampinga.


Yawe akomema bino mpe mokonzi oyo bokopona mpo na koyangela bino, na ekolo oyo bino mpe bakoko na bino botikala nanu koyeba te. Kuna bokogumbamela banzambe mosusu : banzambe ya banzete mpe ya mabanga.


Boye, Yawe akopanza bino kati na bikolo nyonso ya mokili mobimba. Kuna bokogumbamela banzambe mosusu : banzambe ya nzete mpe ya mabanga oyo bino mpe bakoko na bino boyebaki te.


Yawe apikolaki bango na mokili na bango na kanda na Ye ya makasi mpe na kotomboka na Ye ya makasi. Abwakaki bango na mokili mosusu ndenge ezali komonana lelo. ›


soki bosali makambo wana, likolo mpe se ekozala motatoli kati na ngai mpe bino : bokolimwa noki na mokili oyo bokokende kozwa sima na bino kokatisa Yordani. Bokowumela kuna tango molayi te, kasi bokobebisama solo ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ