Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 25:2 - Mokanda na Bomoi

2 Engumba yango ezingelamaki kino na mobu ya zomi na moko ya bokonzi ya Sedesiasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 25:2
6 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezalaki na tango wana nde bakonzi ya basoda ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, babundisaki Yelusalemi mpe bazingelaki engumba yango.


Tango Sedesiasi akokisaki mibu libwa na bokonzi, na mokolo ya zomi ya sanza mpe ya zomi, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, elongo na mampinga na ye nyonso, ayaki kobundisa Yelusalemi. Batongaki molako na bango libanda ya engumba, mpe atongaki mabulu mpo na kobombama, na zingazinga na yango nyonso.


Na mokolo ya libwa ya sanza ya minei, wana nzala makasi ekotaki kati na engumba mpe bato bazalaki lisusu na eloko ya kolia te,


Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi tango Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu zomi na bokonzi mpe Nabukodonozori akokisaki mibu zomi na mwambe na bokonzi.


Engumba yango ezingelamaki kino na mobu ya zomi na moko ya bokonzi ya Sedesiasi.


Bakozingela bingumba na bino nyonso kati na mokili na bino kino bamir na bino ya milayi mpe ya makasi oyo botielaka mitema ekokweya. Bakozingela bingumba nyonso kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ