Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 25:18 - Mokanda na Bomoi

18 Mokonzi ya bakengeli ya mokonzi atiaki na boloko Seraya, mokonzi ya Banganga-Nzambe ; Sofoni, molandi ya mokonzi ya Banganga-Nzambe ; mpe Banganga-Nzambe misato oyo bazalaki na mokumba ya kokengela ekotelo ya Tempelo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 25:18
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi apesaki mitindo epai ya Ilikia, mokonzi ya Banganga-Nzambe, epai ya Banganga-Nzambe oyo balandi mpe epai ya bakengeli bikuke ya Tempelo ya Yawe, mpo ete balongola kati na Tempelo ya Yawe, biloko nyonso oyo esalema mpo na Bala, mpo na nzambe mwasi Ashera, mpe mpo na mampinga nyonso ya likolo. Mokonzi atumbaki yango libanda ya Yelusalemi, kati na bilanga ya lubwaku ya Sedron, mpe amemaki putulu na yango na Beteli.


Bakitani ya Merari kolanda batata na bango : Merari abotaki Maali ; Maali abotaki Libini ; Libini abotaki Shimei ; Shimei abotaki Uza ;


Sima na makambo oyo, tango Aritakizerisesi azalaki mokonzi ya Persi, Esidrasi, mwana mobali ya Seraya, mwana mobali ya Azaria, mwana mobali ya Ilikia,


Nganga-Nzambe Pashuri, mwana mobali ya Imeri, mokonzi ya Tempelo ya Yawe, ayokaki ndenge Jeremi azalaki kosakola.


Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi tango mokonzi Sedesiasi atindelaki ye Pashuri, mwana mobali ya Malikiya, mpe Nganga-Nzambe Sofoni, mwana mobali ya Maaseya, mpo na koloba na ye :


Sima na yango, elobi Yawe, nakokaba na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe na maboko ya banguna na bango oyo bazali na posa ya kosala bango mabe : Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, bakalaka na ye mpe bavandi ya engumba oyo, ba-oyo bakobika na bokono oyo ebomaka, na mopanga mpe na nzala makasi. Nabukodonozori akoboma bango na mopanga, akokangela bango motema mpe akoyokela bango mawa te. ›


« Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Otindaki mikanda na kombo na yo moko epai ya bato nyonso ya Yelusalemi, epai ya Nganga-Nzambe Sofoni, mwana mobali ya Maaseya, mpe epai ya Banganga-Nzambe. Olobaki na Sofoni :


Nzokande, Nganga-Nzambe Sofoni atangisaki mosakoli Jeremi mokanda yango.


Nakokaba Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, elongo na bakalaka na ye na maboko ya banguna na bango, oyo bazali koluka kosala bango mabe, na maboko ya mampinga ya mokonzi ya Babiloni, oyo akei sik’oyo mosika na bino.


Mokonzi ya bakengeli ya mokonzi atiaki na boloko : Seraya, mokonzi ya Banganga-Nzambe ; Sofoni, molandi ya mokonzi ya Banganga-Nzambe ; mpe Banganga-Nzambe misato oyo bazalaki na mokumba ya kokengela ekotelo ya Tempelo.


Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : engumba oyo ezali solo nzungu, mpe bibembe oyo bobwaki kuna, yango nde misuni ; kasi Ngai, nakobengana bino kati na yango.


— Kamata palata mpe wolo epai ya Elidayi, Tobiya mpe Yedaeya, ba-oyo bawuti na bowumbu wuta na Babiloni ; mpe na mokolo yango kaka, kende yo moko na ndako ya Joziasi, mwana mobali ya Sofoni, epai wapi bakomeli.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ