Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 25:13 - Mokanda na Bomoi

13 Bato ya Babiloni babukaki makonzi ya bronze oyo ezalaki liboso ya Tempelo ya Yawe, bashario ya bronze mpe nzungu ya monene ya bronze oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe, mpe bamemaki bronze na yango na Babiloni.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 25:13
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Irami asalaki makonzi nyonso mibale ya bronze : likonzi moko na moko ezalaki na bametele pene libwa na molayi, mpe bametele pene motoba na monene.


« Solo, na mikolo ekoya, nyonso oyo ezali kati na ndako na yo, mpe nyonso oyo batata na yo babomba kino na mokolo ya lelo, bakomema yango na Babiloni, eloko moko te ekotikala, elobi Yawe.


Ndenge Yawe alobaki yango, Nabukodonozori azwaki bomengo nyonso oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe mpe kati na ndako ya mokonzi ; bongo amemaki biloko nyonso ya wolo oyo Salomo, mokonzi ya Isalaele, asalaki mpo na Tempelo ya Yawe.


Na liboso ya Tempelo ya Yawe, atongaki makonzi mibale oyo ezalaki na bametele pene zomi na sambo na bosanda. Na likolo ya likonzi moko na moko, ezalaki na moto ya bametele mibale na basantimetele tuku mitano.


Nabukodonozori amemaki na Babiloni biloko nyonso ya Tempelo ya Nzambe, ya minene to ya mike, bozwi ya Tempelo ya Yawe, bozwi ya mokonzi mpe ya bakalaka na ye.


Okosala na bronze banzungu ya mike mpo na kolongola putulu ya moto, bapawu, basani ya minene, bakanya mpe basani mpo na komema makala ya moto.


« Solo, na mikolo oyo ekoya, nyonso oyo ezali kati na ndako na yo mpe nyonso oyo batata na yo babomba kino na mokolo ya lelo, bakomema yango na Babiloni ; eloko moko te ekotikala, » elobi Yawe.


Nakokaba bozwi nyonso ya engumba oyo na maboko ya banguna na bango : biloko nyonso ya engumba, biloko ya talo mpe bomengo nyonso ya mokonzi ya Yuda ; bakokamata yango mpe bakomema yango na mokili ya Babiloni.


Monguna asemboli loboko na ye likolo ya bomengo nyonso ya Yelusalemi, bongo azali komona bikolo ya bapaya kokota na esika na ye ya bule, bikolo oyo Yo opekisaki kokota kati na lisanga na Yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ