Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 25:12 - Mokanda na Bomoi

12 Kasi mokonzi ya bakengeli ya mokonzi atikaki kati na mokili ndambo ya babola mpo na kolona vino mpe bilanga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 25:12
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Amemaki Yelusalemi mobimba na bowumbu : bakonzi nyonso ya basoda mpe basoda, bato nyonso ya mayele ya misala ya maboko mpe ba-oyo basalelaka bibende. Bango nyonso bazalaki bato nkoto zomi. Kaka babola nde batikalaki kati na mokili.


Nabukodonozori amemaki Yeoyakini na bowumbu na Babiloni ; amemaki mpe, longwa na Yelusalemi kino na Babiloni, mama ya mokonzi, basi ya mokonzi, bakalaka ya lokumu mpe bankumu ya mokili.


Mokonzi ya Babiloni amemaki mpe na bowumbu na Babiloni mampinga nyonso ya bato nkoto sambo oyo bazalaki makasi mpe babongisama mpo na bitumba, bakisa bato nkoto moko oyo basalaka misala ya maboko mpe oyo basalelaka bibende.


Tango basilisaki, bazongisaki epai ya mokonzi mpe Yeoyada mbongo oyo etikalaki. Na mbongo yango, basalaki bisalelo mpo na Tempelo ya Yawe, mpo na losambo, mpo na bambeka ya kotumba, bakopo, mpe bisalelo mosusu ya wolo mpe ya palata. Na mikolo nyonso ya bomoi ya Nganga-Nzambe Yeoyada, bazalaki kobonza bambeka ya kotumba kati na Tempelo ya Yawe.


Anani, moko kati na bandeko na ngai, ayaki elongo na bato mosusu wuta na Yuda. Natunaki bango sango ya Bayuda oyo babikaki mpe batikalaki wuta na bowumbu, mpe sango ya Yelusalemi.


Mpo na yango, bilakeli mabe ezali kozikisa mokili ; bato na yango bakomema mokumba ya mabe na bango. Yango wana, bato ya mokili bazali kokufa, mpe ndambo moke kaka nde etikali.


Kasi Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, atikaki kati na mokili ya Yuda, babola oyo bazalaki ata na eloko moko te ; apesaki bango bilanga ya vino mpe bilanga.


Tango bakonzi nyonso ya mampinga elongo na basoda na bango, oyo bazalaki ya kopanzana kati na etuka, bayokaki ete mokonzi ya Babiloni akomisi Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, moyangeli kati na mokili mpe apesi ye mokumba ya kokamba babola, mibali, basi mpe bana oyo bakendeki te na bowumbu na Babiloni,


Kasi, Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, atikaki kati na mokili ndambo ya babola mpo na kolona vino mpe bilanga.


« Mwana na moto, bavandi ya bisika oyo ebeba kati na mokili ya Isalaele bazali koloba : ‹ Abrayami azalaki kaka ye moko tango azwaki mokili lokola libula ; nzokande biso, tozali ebele ; boye, solo, mokili epesameli biso lokola libula ! ›


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ