Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 25:10 - Mokanda na Bomoi

10 Mampinga nyonso ya Babiloni, oyo ezalaki na se ya bokonzi ya mokonzi ya bakengeli ya mokonzi babukaki bamir oyo ezingelaki Yelusalemi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 25:10
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Joasi, mokonzi ya Isalaele, akangaki Amatsia, mokonzi ya Yuda, mwana mobali ya Joasi mpe koko ya Akazia, na Beti-Shemeshi. Boye Joasi akendeki na Yelusalemi mpe abukaki mir ya Yelusalemi, na molayi ya bametele pene nkama moko na tuku mwambe, longwa na ekuke ya Efrayimi kino na ekuke ya suka.


Balobaki na ngai : « Bayuda oyo babikaki mpe batikalaki wuta na bowumbu bazali kovanda kati na etuka ya Yuda mpe bazali na pasi mingi mpe na soni makasi ; mir ya Yelusalemi etondi na madusu, mpe bikuke na yango ebebisamaki na moto. »


bangombe na biso ezali minene ; likama ezali te, zemi ezali kosopana te, mpe koganga moko te ya pasi ezali koyokana na bisika na biso.


Nzembo ya Azafi. Oh Nzambe, tala ndenge bato ya bikolo ya bapaya bakoti na makasi kati na libula na Yo, bakomisi Esika na Yo ya bule mbindo, mpe bakomisi Yelusalemi mipiku ya mabanga !


Basoda ya Babiloni batumbaki ndako ya mokonzi mpe bandako ya bato, mpe babukaki bamir ya Yelusalemi.


Bomata na bamir mpo na kokota na Yelusalemi mpe bobebisa yango ; kasi bobebisa yango nyonso te. Bokata bitape na yango, pamba te etikali lisusu ya Yawe te.


Na mokolo ya mitano ya sanza ya zomi, na mobu ya zomi na mibale ya bowumbu na biso, moko kati na bato oyo babikaki na Yelusalemi ayaki epai na ngai mpe alobaki : « Babebisi engumba ! »


Bakolia bana ya bibwele na bino mpe bambuma ya mabele na bino, kino bakobebisa bino. Bakotikela bino ata ble te, vino ya sika te, mafuta te, ata bana ngombe na bino te, ata bana meme na bino te mpe ata bantaba na bino te kino bokobebisama.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ