Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 24:7 - Mokanda na Bomoi

7 Mokonzi ya Ejipito azalaki kobima lisusu te elongo na mampinga na ye mpo na kokota na mikili mosusu, mpo ete mokonzi ya Babiloni abotolaki mabele na ye nyonso, longwa na moluka ya nor ya Ejipito kino na ebale Efrate.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 24:7
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mokolo yango, Yawe asalaki boyokani elongo na Abrami mpe alobaki : « Nakopesa mokili oyo na bakitani na yo wuta na moluka ya Ejipito kino na ebale Efrate :


Na tango wana, Yawe akotuta ble wuta na ngambo ya ebale (Efrate) kino na mayi oyo etiolaka makasi na bangomba ya Ejipito. Boye, bino bana ya Isalaele, Yawe akolokota bino moko na moko mpo na kosangisa bino.


Na tina ya Ejipito : Tala maloba ya kosambisa mampinga ya Faraon Neko, mokonzi ya Ejipito, oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, alongaki pene ya ebale Efrate, na Karikemishi, tango Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu minei na bokonzi :


« Bato ya mbangu bazali kokoka lisusu kokima te, mpe basoda ya mpiko bazali kokoka lisusu kobika te ! Bazali nde kobeta mabaku mpe kokweya pembeni ya ebale Efrate, kati na etuka ya nor.


« Mwana na moto, tala ; nabukaki loboko ya Faraon, mokonzi ya Ejipito ! Moto moko te azali kosalisa yango to mpe kotia yango kisi mpo ete ekoka lisusu kozwa makasi ya kosimba mopanga.


Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Natelemeli Faraon, mokonzi ya Ejipito ; nakobuka maboko na ye nyonso mibale : ezala loboko oyo ya malamu to loboko oyo ebukana ; mpe nakosala ete mopanga ekweya longwa na loboko na ye.


Longwa na Atsimoni, ekoleka na mayi ya lubwaku ya Ejipito mpo na kosuka na ebale monene.


Elekaki na Atsimoni, ekendeki kotutana na moluka ya Ejipito mpe esukaki na Ebale monene. Yango nde ezali mondelo na bango na ngambo ya sude.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ