2 Bakonzi 24:2 - Mokanda na Bomoi2 Yawe atindaki mampinga ya bato ya Chalide, ya Siri, ya Moabi mpe ya Amoni mpo na kobundisa ye. Yawe atindaki bango mpo na kobebisa Yuda kolanda liloba oyo Yawe asakolaki na nzela ya basali na Ye, basakoli. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
nakobengisa bato nyonso ya bikolo ya nor mpe mosali na Ngai, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, » elobi Yawe, « nakosala ete babundisa mokili oyo, bavandi na yango mpe bikolo nyonso ya zingazinga. Nakobebisa bango penza mpe nakokomisa bango eloko ya somo mpe ya kotiola ; boye bakotikala seko na seko libebi.
mibali ya Babiloni mpe mibali nyonso ya Chalide, ya Pekodi, ya Shoa mpe ya Koa elongo na mibali nyonso ya Asiri, bilenge mibali kitoko. Bango nyonso bazalaki bayangeli mpe bakonzi ya basoda, basoda ya mpiko oyo batambolaka malamu likolo ya bampunda mpe bakonzi ya basoda ya lokumu ; bango nyonso batambolaka likolo ya bampunda.