Faraon Neko akomisaki Eliakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi mpo na kokitana na Joziasi, tata na ye ; abongolaki kombo na ye mpe akomisaki yango « Yeoyakimi. » Kasi akangaki Yoakazi mpe amemaki ye na Ejipito. Mpe Yoakazi akufaki kuna.
Mokonzi ya Ejipito akomisaki Eliakimi, ndeko mobali ya Yoakazi, mokonzi ya Yelusalemi mpe ya Yuda ; abongolaki kombo na ye mpe akomisaki yango « Yeoyakimi. » Kasi Neko akangaki Yoakazi, ndeko mobali ya Yeoyakimi, mpe amemaki ye na Ejipito.
mpe na tango ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, kino na suka ya sanza ya mitano ya mobu ya zomi na moko ya bokonzi ya Sedesiasi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, kino tango bato ya Yelusalemi bakendeki na bowumbu.
Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi tango mokonzi Sedesiasi atindelaki ye Pashuri, mwana mobali ya Malikiya, mpe Nganga-Nzambe Sofoni, mwana mobali ya Maaseya, mpo na koloba na ye :
Sedesiasi azalaki na mibu tuku mibale na moko ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na moko na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki Amutali, mwana ya Jeremi, moto ya Libina.
Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, akokufa kati na Babiloni, kati mokili ya mokonzi oyo atiaki ye na bokonzi ; pamba te atosaki te ndayi oyo alapaki liboso na ye mpe abukaki boyokani oyo asalaki elongo na ye.
Bato ya Babiloni bayaki epai na ye kino na mbeto na ye oyo asalelaka bolingo mpe bakomisaki ye mbindo na nzela ya kindumba na bango. Sima na bango kokomisa ye mbindo, ayinaki bango.