2 Bakonzi 23:8 - Mokanda na Bomoi8 Joziasi abengisaki Banganga-Nzambe nyonso ya bingumba ya Yuda mpe bapanzaki bisambelo ya likolo ya bangomba oyo ezalaki longwa na Geba kino na Beri-Sheba epai wapi banganga-nzambe wana bazalaki kotumba ansa. Abukaki mpe bisika ya bule oyo batonga pene ya bikuke ya bingumba : oyo ezalaki na ebandeli ya ekuke ya Jozue, moyangeli ya engumba, mpe oyo ezalaki na ngambo ya loboko ya mwasi ya ekuke ya engumba. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mokili mobimba, longwa na Geba kino na Rimoni, na ngambo ya sude ya Yelusalemi, ekokoma lokola etando ya Araba ; kasi Yelusalemi ekozala kaka na likolo, ekotikala kaka na esika na yango, longwa na Ekuke ya Benjame kino na esika oyo Ekuke ya kala ezalaki, na songe ya bamir, longwa na ndako molayi ya Ananeyeli kino na bikamolelo ya mokonzi.