Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 23:7 - Mokanda na Bomoi

7 Mokonzi abukaki kati na Tempelo ya Yawe, bandako ya mibali oyo bazalaki komipesa na kindumba ya bule, bandako epai wapi basi bazalaki kotonga banzambala mpo na nzambe mwasi Ashera.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 23:7
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezalaki lisusu na mibali oyo bazalaki komipesa na kindumba ya bule kati na mokili ya Yuda : bamipesaki na kosala makambo ya nkele kolanda bikolo ya bapaya oyo Yawe abenganaki liboso ya bato ya Isalaele.


Abenganaki wuta na mokili, bato oyo bazalaki komipesa na kindumba ya bule, mpe alongolaki banzambe nyonso ya bikeko oyo tata na ye asalaki.


Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Jozafati, misala na ye mpe bitumba na ye ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.


Joziasi alongolaki banzambe nyonso ya bikeko ya nkele kati na bituka nyonso ya bana ya Isalaele. Apesaki mitindo na bato nyonso oyo bazalaki kati na Isalaele ete basalela Yawe, Nzambe na bango. Na bongo, na mikolo nyonso ya bomoi ya Joziasi, bapengwaki te liboso ya Yawe, Nzambe ya batata na bango.


Okamataki bilamba na yo mosusu, otongaki yango mpo na kobongisa bisambelo na yo ya likolo ya bangomba, epai wapi osalaki kindumba na yo. Likambo ya bongo etikala nanu kosalema te mpe ekotikala kosalema lisusu te !


Bongo amemaki ngai lisusu na ekotelo ya Ekuke ya ngambo ya nor ya Tempelo ya Yawe ; bongo namonaki basi bavandi wana, bazali kolela Tamuzi.


Nakosukisa bisengo na ye nyonso : bafeti na ye ya mobu na mobu mpe ya ebandeli ya sanza, mikolo na ye ya Saba mpe bafeti nyonso oyo ekatama.


kobonza bambeka na likolo ya bangomba milayi, kotumba ansa lokola mbeka ya malasi na likolo ya bangomba mikuse, na se ya banzete minene oyo epesaka pio ya kitoko lokola sheni, pepiliye mpe terebente ! Mpo na yango, bana na bino ya basi bakosala kindumba, mpe basi ya bana na bino bakosala ekobo.


Nakopesa etumbu te : ezala na bana na bino ya basi mpo na kindumba na bango to na basi ya bana na bino mpo na ekobo na bango ; pamba te bango moko mibali babimaka na basi ya ndumba mpe babonzaka mbeka elongo na bandumba ya tempelo. Bato bazangi bososoli basukaka se na libebi !


Wana bana ya Isalaele bavandaki nanu na Shitimi, bamipesaki na kindumba na bilenge basi ya Moabi.


Tika ete awumela epai na yo, na esika nyonso oyo alingi, mpe na engumba nyonso oyo aponi ; konyokola ye te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ