2 Bakonzi 23:5 - Mokanda na Bomoi5 Mokonzi alongolaki banganga-nzambe ya bapaya oyo bakonzi ya Yuda batiaki mpo na kotumba ansa na bisambelo ya likolo ya bangomba ya bingumba ya Yuda mpe ya zingazinga ya Yelusalemi : bango nde bazalaki kotumba ansa mpo na Bala, mpo na moyi, mpo na sanza, mpo na minzoto mpe mpo na mampinga nyonso ya likolo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Babukaki liboso na ye bitumbelo ya banzambe Bala, bakweyisaki mbala moko bitumbelo malasi oyo ezalaki na likolo na yango, abukaki makonzi ya bule ya nzambe mwasi Ashera, bikeko ya banzambe basala na nzete mpe na bibende oyo banyangwisa na moto ; akomisaki yango putulu mpe asopaki putulu yango na likolo ya bakunda ya bato oyo babonzelaki banzambe yango bambeka.