Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 23:36 - Mokanda na Bomoi

36 Yeoyakimi azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na moko na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Zebuda. » Zebuda azalaki mwana ya Pedaya, moto ya Ruma.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 23:36
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Joziasi azalaki tata ya bana mibali oyo : Yoanani, mwana na ye ya liboso ; Yeoyakimi, ya mibale ; Sedesiasi, ya misato ; Shalumi, ya minei.


Yeoyakimi azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na moko na Yelusalemi. Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, Nzambe na ye.


mpe na tango ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, kino na suka ya sanza ya mitano ya mobu ya zomi na moko ya bokonzi ya Sedesiasi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, kino tango bato ya Yelusalemi bakendeki na bowumbu.


Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi mpo na Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda : « Bakosalela ye matanga te na koloba : ‹ Mawa, ndeko na ngai ya mobali ! Mawa, ndeko na ngai ya mwasi ! › Bakosalela ye matanga te na koloba : ‹ Mawa, nkolo na ngai ! Mawa, mokonzi na ngai ! ›


Bakokunda ye ndenge bakundaka ane, bakobenda ye mpe bakobwaka ye libanda ya bikuke ya Yelusalemi. »


Tala liloba oyo Yawe alobaki, na ebandeli ya bokonzi ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda :


Na mobu ya misato ya bokonzi ya Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, ayaki kobundisa Yelusalemi mpe azingelaki yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ