Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 23:33 - Mokanda na Bomoi

33 Faraon Neko atiaki ye na boloko mpe akangaki ye minyololo, na Ribila, kati na mokili ya Amati, mpo ete akonza lisusu te na Yelusalemi. Faraon Neko afutisaki na makasi mokili ya Yuda mpako ya nkoto misato nkama minei ya bakilo ya palata mpe bakilo tuku misato na minei ya wolo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 23:33
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na tango wana, Salomo elongo na Isalaele mobimba basalaki feti monene ; mpe lisanga monene ya bato oyo bawutaki na Lebo-Amati kino na moluka ya Ejipito batelemaki liboso ya Yawe, Nzambe na biso, mikolo sambo mpe mikolo sambo mosusu, elingi koloba mikolo zomi na minei.


Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, atindaki sango oyo epai ya mokonzi ya Asiri, na Lakishi : « Nasali mabe, bima na mboka na ngai ; nakofuta yo nyonso oyo okosenga ngai. » Mokonzi ya Asiri akatelaki Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, mpako ya motuya ya bakilo nkoto zomi ya palata mpe bakilo nkoto moko ya wolo.


Tango Joziasi azalaki mokonzi, Faraon Neko, mokonzi ya Ejipito, akendeki na ebale Efrate mpo na kosunga mokonzi ya Asiri. Mokonzi Joziasi akendeki kokutana na ye mpo na kokanga ye nzela, kasi Neko abundisaki ye mpe abomaki ye, na Megido.


Yeoyakimi afutaki epai ya Faraon Neko palata mpe wolo oyo asengaki. Mpo na kofuta yango, Yeoyakimi asengaki ete bato ya mokili bafuta mpako. Afutisaki bato mpako ya palata to ya wolo kolanda bozwi na bango.


Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, akamataki bango nyonso mpe amemaki bango epai ya mokonzi ya Babiloni, na Ribila.


Basoda ya Babiloni bakangaki mokonzi ya Yuda mpe bamemaki ye epai ya mokonzi ya Babiloni, na Ribila epai wapi bakatelaki ye etumbu.


Soki mibali, wana bazali kobunda, batutani na mwasi ya zemi, bongo mwasi yango aboti mwana matsombe mpe likama mosusu emonani te, wana basengeli kofuta lomande ndenge mobali ya mwasi yango akokata kolanda mokano ya basambisi.


Tika ete moto oyo asilikaka makasi amema mokumba ya kanda na ye ; pamba te soki obikisi ye, okotinda ye ete azongela lisusu.


Na tina ya Ejipito : Tala maloba ya kosambisa mampinga ya Faraon Neko, mokonzi ya Ejipito, oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, alongaki pene ya ebale Efrate, na Karikemishi, tango Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu minei na bokonzi :


Ekweyisaki bandako na bango ya makasi mpe ebebisaki bingumba na bango. Soki egangi, mokili mpe bato nyonso oyo bazalaki kuna bazalaki kotondisama na somo.


Bakangaki yango minyololo, bakotisaki yango kati na ndako ya banyama, bamemaki yango epai ya mokonzi ya Babiloni. Babwakaki yango na boloko mpo ete mongongo ya koganga na yango eyokana lisusu na bangomba ya Isalaele te.


Boye bakendeki mpe banongaki mokili kobanda na esobe ya Tsini kino na Reobi, pembeni ya Lebo-Amati.


longwa na Shefami, ekokita na Ribila na ngambo ya este ya Ayini mpe ekolanda ebale ya Kinereti, na ngambo na yango ya este,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ